49
Kosambisama ya Amoni
Na tina na bato ya Amoni :
 
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te ?
Atikali lisusu na bakitani ya libula te ?
Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni,
abotoli bingumba ya Gadi ?
Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi ?
Kasi na mikolo ekoya, »
elobi Yawe,
« nakosala ete lokito ya bitumba eyokana
mpo na kobundisa Raba, engumba ya bato ya Amoni ;
ekokoma esika ya mabe
mpe bamboka mike na yango ekozikisama na moto.
Bongo Isalaele akobengana bato oyo babenganaki ye, »
elobi Yawe.
« Eshiboni, lela mpo ete Ayi ebebisami !
Bino bavandi ya Raba, boganga !
Bolata basaki mpe bosala matanga,
bokima na bangambo nyonso ya mir,
pamba te Moloki akokende na bowumbu
elongo na banganga-nzambe mpe bakambi na ye.
Mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabwaku na yo,
mabwaku oyo ebotaka bambuma ebele ?
Oh elenge mwasi oyo otambolaka na bosembo te,
ozali solo kotia motema na bomengo na yo
mpe ozali koloba : ‹ Nani akobundisa ngai ? ›
Nakomemela yo pasi,
wuta na zingazinga na yo, »
elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Bakomema moko na moko kati na bino na bowumbu,
mpe moto ata moko te akokoka kosangisa
bato oyo bakokima.
Kasi sima na mikolo,
nakozongisa lisusu lokumu ya bato ya Amoni, »
elobi Yawe.
Kosambisama ya Edomi
Na tina na Edomi :
 
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Boni, engumba ya Temani etikali lisusu
na bato ya bwanya te ?
Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ?
Boni, bwanya na bango esili penza ?
Bobaluka mpe bokima,
bokende kobombama na madusu ya mabanga,
bino bavandi ya engumba Dedani !
Pamba te nakotindela Ezawu pasi
tango nakopesa ye etumbu.
Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino
bayei epai na yo,
bakotika ata mbuma moko te ya vino.
Soki miyibi bayei epai na yo na butu,
bakobebisa ndenge balingi.
10 Kasi nakotika Ezawu bolumbu,
mpe nakobimisa polele ebombamelo na ye,
bongo akokoka lisusu komibomba te.
Bana na ye ya mibali to bandeko na ye
to mpe bazalani na ye bakosila kokufa ;
moko te akotikala na bomoi.
11 Tika bana bitike na yo,
nakobatela bomoi na bango ;
mpe basi na yo, oyo bakufisa mibali
bakotiela Ngai motema. »
12 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu ? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango ! 13 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « Botsira ekobebisama mpe ekokoma eloko ya somo, eloko ya kotiola mpe ya lisuma ; mpe bingumba na yango nyonso ekobebisama mpo na libela. »
14 Nayoki sango kowuta na Yawe ;
mpe batindaki ntoma moko epai ya bikolo mpo na koloba :
« Bosangana mpo na kobundisa yango !
Botelema mpo na bitumba !
 
15 Nakokomisa yo moke kati na bikolo,
ekolo ya kotiola kati na bato.
16 Somo oyo bato bazali koyoka yo
mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo.
Yo movandi ya madusu ya mabanga,
yo oyo otonga ndako na yo
na basonge ya bangomba ;
ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo,
nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, »
elobi Yawe.
17 « Mokili ya Edomi ekokoma eloko ya somo ;
moto nyonso oyo akolekela wana akokamwa
mpe akoyoka somo wana akomona kobeba na yango nyonso.
18 Ndenge Sodome mpe Gomore ebebisamaki
elongo na bingumba na yango ya zingazinga, »
elobi Yawe,
« moto moko te akovanda lisusu kuna,
moko te akowumela kati na yango.
19 Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani
mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele,
ndenge wana mpe nakobengana Edomi
na mokili na yango na mbala moko ;
Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi.
Nani akokani na Ngai ?
Nani akoki kobeta tembe na Ngai ?
Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?
20 Yango wana,
boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala
mpo na kotelemela Edomi,
mokano oyo asili kozwa
mpo na kotelemela bavandi ya Temani :
‹ Bakobengana bango na lopango
lokola bana mike ya etonga,
akobebisa etando na bango.
21 Mabele ekoningana na lokito ya kokweya na bango,
makelele na yango ekoyokana kino na ebale monene ya Barozo.
 
22 Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu,
etanda mapapu na yango likolo ya Botsira !
Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi
ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »
Kosambisama ya Damasi
23 Na tina ya Damasi :
« Amati mpe Aripadi batondisami na soni,
pamba te bayoki sango ya mabe.
Mitema na bango ekomi likolo-likolo
mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki.
24 Bato ya Damasi balembi nzoto,
bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango ;
kobanga mpe pasi ezwi bango
lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
25 Ndenge nini bosundola engumba ya lokumu boye,
engumba oyo ezalaki kosepelisa motema na Ngai ?
26 Solo, bilenge mibali na yango bakokweya
na babalabala na yango na mokolo wana,
basoda na yango ya mpiko bakokanga minoko, »
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
27 « Nakozikisa bamir ya Damasi na moto
mpe moto yango ekozikisa bandako batonga makasi
ya mokonzi Beni-Adadi. »
Kosambisama ya Kedari mpe Atsori
28 Na tina na Kedari mpe mikili ya Atsori, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki :
 
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Botelema mpe bobundisa Kedari,
bobebisa bato ya este.
29 Bobotola na makasi bandako na bango ya kapo
mpe bibwele na bango ;
bomema bilamba, biloko na bango ya kitoko
mpe bashamo na bango !
Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso :
‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso ! ›
30 Bino bavandi ya Atsori,
bokima na lombangu,
bobombama na madusu ya mabanga, »
elobi Yawe.
« Pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, asaleli bino likita,
asali penza mabongisi ya kosala bino mabe !
31 Botelema mpe bobundisa ekolo oyo ezali na kimia,
ekolo oyo ebangaka eloko moko te, »
elobi Yawe,
« ekolo oyo ezanga bikuke mpe banzete oyo bakangelaka bikuke,
ekolo oyo bato na yango bazalaka kaka bango moko.
32 Tika ete bashamo na bango ekoma bomengo ya bitumba,
bayiba bibwele na bango ebele.
Nakopanza na mopepe bavandi ya mosika,
mpe nakokweyisela bango pasi longwa na bisika nyonso, »
elobi Yawe.
33 « Atsori ekokoma esika oyo mbwa ya zamba evandaka,
esika oyo etikala pamba mpo na libela :
moto moko te akovanda lisusu kuna
mpe moto moko te akowumela lisusu kati na yango. »
Kosambisama ya Elami
34 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Elami, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda :
 
35 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Tala, nakobuka tolotolo ya Elami,
ebundeli oyo esalaka makasi na ye.
36 Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi,
wuta na basonge minei ya lola,
nakopanza bango na mokili mobimba
mpe akozala na ekolo moko te
oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima.
37 Nakosala ete bato ya Elami balenga
liboso ya banguna na bango,
liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ;
nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, »
elobi Yawe.
« Nakolanda bango na mopanga
kino nakosilisa koboma bango.
38 Nakotia Kiti na Ngai ya bokonzi kati na Elami
mpe nakoboma mokonzi mpe bakalaka na yango, »
elobi Yawe.
 
39 « Nzokande, na mikolo ekolanda,
nakozongisa lokumu ya Elami, »
elobi Yawe.