50
Kosambisama ya Babiloni
Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Babiloni mpe bato na yango :
« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo,
telemisa bendele !
Sala ete bato nyonso bayeba yango,
kobomba likambo moko te !
Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni !
Beli* Beli ezali kombo mosusu oyo babengelaka Mariduki, nzambe ya bato ya Babiloni. akoyokisama soni !
Mariduki akobukana !
Bililingi na ye ekosambwa,
mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›
Ekolo moko ekowuta na nor mpe ekobundisa Babiloni,
ekobebisa yango,
bongo moto moko te akovanda lisusu kuna ;
ezala bato to banyama, nyonso ekokima.
 
Na tango wana, na mikolo wana, »
elobi Yawe,
« bana ya Isalaele elongo na bato ya Yuda bakokende na kolela
mpo na koluka Yawe, Nzambe na bango.
Bakotuna nzela oyo ememaka kino na Siona
mpe bakobalola bilongi na bango na ngomba yango ;
bakolobana bango na bango :
‹ Boya, tika ete tokangama na Yawe
na nzela ya boyokani oyo ezali na suka te,
boyokani oyo tokoki kobosana te ! ›
 
Bato na Ngai bazalaki lokola bameme
oyo ebungi nzela ;
babateli na bango babungisaki bango nzela,
basalaki ete bayengayenga na bangomba,
batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikuse
mpe babosana lopango na bango ya kopemela.
Moto nyonso oyo azalaki komona bango
azalaki koboma bango,
banguna na bango bazalaki koloba :
‹ Tozali na biso na ngambo te,
mpo ete basali masumu liboso ya Yawe
oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo ;
liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›
 
Bobima mbangu na Babiloni,
botika mokili ya Babiloni !
Bozala lokola bantaba ya mibali
oyo ezali kotambola liboso ya etonga.
 
Pamba te nakotelemisa
mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya
oyo ekowuta na mokili ya nor
mpo na kobundisa Babiloni
mpe kobotola yango wuta na nor ;
makonga na bango ekozala
lokola makonga ya basoda ya mpiko,
oyo bazangaka koboma te.
10 Boye, bakobotola bomengo ya Babiloni
mpe bato nyonso oyo bakobotola yango bakotonda, »
elobi Yawe.
 
11 « Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo,
bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ;
mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa
lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble
mpe kolela lokola bampunda,
12 mama na bino akoyoka soni makasi ;
ye oyo abotaki bino akosambwa.
Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo,
ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.
13 Likolo ya kanda ya Yawe,
bato bakovanda lisusu na Babiloni te
mpo ete ekobebisama nye.
Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni
bakokamwa mpe bakozala na somo
ya komona bapota na yango nyonso.
 
14 Bino bato nyonso oyo bobundaka na matolotolo,
bomitanda na molongo zingazinga ya Babiloni
mpe bobeta yango makonga !
Botika ata likonga moko te,
pamba te Babiloni asali masumu liboso ya Yawe.
15 Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso !
Ayei komitika ye moko,
mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi,
bamir na ye ebukani :
ezali na lolenge oyo nde
Yawe azongiseli ye mabe na mabe.
Bozongisela ye makambo
oyo ye asalaki bikolo mosusu.
16 Boboma wuta na mokili ya Babiloni
bato oyo basalaka bilanga
mpe bato oyo basimbaka mbeli mpo na kobuka mbuma.
Likolo ya mopanga ya monyokoli,
tika ete moto na moto azonga na mokili na ye,
tika ete moto na moto akima na mokili na ye.
 
17 Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela,
oyo nkosi ezalaki kolanda :
Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso
oyo apasolaki Isalaele ;
Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni,
azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.
18 Yango wana tala makambo
oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
Nzambe ya Isalaele, alobi :
‹ Nakopesa mokonzi ya Babiloni mpe mokili na ye
etumbu ndenge napesaki mokonzi ya Asiri.
19 Kasi nakozongisa Isalaele na lopango na ye ;
mpe akolia lisusu matiti ya ngomba Karimeli mpe ya Bashani.
Nzala na ye ekosila na etuka ya bangomba
ya Efrayimi mpe ya Galadi.
20 Na tango wana, na mikolo wana, ›
elobi Yawe,
‹ bakoluka ngambo nini Isalaele amemi
kasi bakomona yango te,
masumu nini Yuda asali kasi bakomona yango te ;
pamba te nakolimbisa batikali oyo nabikisi.
 
21 Bobundisa mokili ya Meratayimi
mpe bavandi ya Pekodi ;
bolanda bango, boboma mpe bobebisa bango nye, ›
elobi Yawe.
‹ Bosala makambo nyonso oyo natindi bino.
22 Makelele ya bitumba ezali kati na mokili,
lokito ya kobebisama monene !
23 Ndenge nini marto oyo ezalaki kobeta mokili mobimba
ebukani mpe epanzani ?
Ndenge nini penza Babiloni ebebisami kati na bikolo ?
24 Oh Babiloni, nasili kotiela yo motambo,
mpe ekangi yo liboso ete oyeba yango.
Omonanaki mpe okangamaki
mpo ete otelemelaki Yawe.
25 Yawe afungolaki bibundeli na Ye nyonso
mpe abimisaki kati na yango bibundeli ya kanda na Ye ;
pamba te yango nde mosala
oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
asili kosala na mokili ya bato ya Babiloni.
26 Bobimela wuta na bisika nyonso mpo na kobundisa ye,
bobuka bibombelo na ye,
bokangisa bomengo ya bitumba
ndenge bakangisaka maboke ya ble,
bobebisa yango nyonso mpe botika ata eloko moko te.
27 Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso ;
tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama !
Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki,
tango mpo na bango ya kozwa etumbu.
 
28 Boyoka ! Tala bango bazali kokima
mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni
mpo na koyebisa kati na Siona
ndenge nini Yawe, Nzambe na biso,
azongisi mabe na mabe ;
ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.
 
29 Bosangisa bato nyonso
oyo babundaka na matolotolo
mpo na kotelemela Babiloni ;
tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga
bazingela Babiloni mobimba,
basala ete ata moto moko te akima,
bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango
mpe bazongisela yango makambo
oyo esalaki bikolo mosusu ;
pamba te ebetaki tembe na Yawe,
Mosantu ya Isalaele.
30 Yango wana, na mokolo wana,
bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala,
basoda na yango nyonso ya mpiko bakokanga minoko, ›
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
31 ‹ Tala, nazali na kanda na yo, yo mboka ya lolendo, ›
elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
‹ pamba te mokolo na yo ekoki,
tango na yo ya kozwa etumbu.
32 Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya,
mpe moto moko te akoya kosunga yango ;
nakopelisa moto kati na bingumba na yango,
mpe moto yango ekozikisa bato nyonso
oyo bazingeli yango. ›
33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
‹ Bazali konyokola bana ya Isalaele mpe bato ya Yuda ;
bato nyonso oyo bakangaki bango
mpe bamemaki bango na bowumbu
baboyi kotika bango.
34 Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi,
Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
akokotela bango na molende
mpo ete amema kimia na mokili na bango
mpe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni.
35 Mopanga, boma bato ya Babiloni ;
boma bavandi ya Babiloni,
boma bakambi mpe bato na yango ya bwanya, ›
elobi Yawe !
36 ‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta ;
tika ete bakoma bato ya maboma !
Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko ;
tika ete bakoma na somo !
37 Mopanga, boma bampunda mpe bashar na yango,
bapaya nyonso oyo bazali sima na yango
mpo ete bakoma lokola basi !
Mopanga, bebisa bomengo na yango
mpo ete ekoma bomengo ya bitumba !
38 Bokawuki, kweyela mayi na yango mpo ete ekawuka ;
pamba te ezali mokili ya banzambe ya bikeko,
bikeko oyo epesaka bato somo !
 
39 Bikelamu ya esobe mpe bambwa ya zamba
ekokoma kovanda kuna ;
maligbanga mpe ekokoma kovanda kuna.
Bato bakovanda lisusu kuna te
to moto moko te akotikala kuna mpo na libela.
40 Ndenge Nzambe abebisaki Sodome mpe Gomore
elongo na bingumba na yango ya zingazinga, › »
elobi Yawe,
« moto moko te akovanda lisusu kuna,
moto moko te akowumela kati na yango.
41 Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya wuta na nor,
ekolo moko monene mpe bakonzi ebele bazali komibongisa
mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.
42 Basimbi matolotolo mpe makonga,
bazali bato na kanza mpe bazanga mawa,
bazali koganga lokola makelele ya ebale monene,
bamati likolo ya bampunda,
batandami na milongo lokola basoda
mpo na kobundisa yo Babiloni, mboka kitoko !
43 Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango,
alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye
mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
44 Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani
mpo na kokende na mapango
epai wapi babokolaka bibwele,
ndenge wana mpe nakobengana Babiloni
na mokili na yango na mbala moko ;
Ngai moko nakopona moto
oyo akokoma mokonzi ya Babiloni.
Nani akokani na Ngai ?
Nani akoki kobeta tembe na Ngai ?
Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? »
 
45 Yango wana, boyoka mabongisi oyo
Yawe asili kosala mpo na Babiloni,
mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela
mokili ya bato ya Babiloni :
Bakobengana bango na lopango
lokola bana mike ya etonga,
akobebisa etando na bango.
46 Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni,
mabele ekoningana ;
makelele na yango ekoyokana
kino na bikolo mosusu.

*50:2 Beli ezali kombo mosusu oyo babengelaka Mariduki, nzambe ya bato ya Babiloni.