51
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tala, nakotinda mopepe ya makasi mpo na
kobebisa mokili ya Babiloni mpe bato ya Lebi-Kamayi.
Nakotinda bapaya na Babiloni
mpo na koyungola mpe kobebisa yango :
bakobundisa yango na bangambo nyonso
na mokolo na yango ya kosambisama.
Basoda oyo babundaka na matolotolo bakozwa tango te
ya kobeta makonga na bango ;
bakozwa tango te ya kolata bibombelo ya tolo,
bakobikisa te basoda na bango ya bilenge
mpe bakoboma mampinga na bango nyonso.
Bato oyo bakokweya na mopanga
bakotondisa mokili ya Babiloni
mpe babalabala na yango ekotonda
na bato bazoka bapota.
Ata soki mokili na bango etondaki na masumu
liboso ya Mosantu ya Isalaele,
Nzambe na bango, Yawe, Mokonzi ya mampinga,
abosanaki Isalaele na Yuda te.
 
Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino !
Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango.
Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango
mabe na mabe mpe kofuta bango
ndenge ezali misala na bango.
Babiloni ezali lokola kopo ya wolo na loboko ya Yawe ;
ezalaki kolangwisa mokili mobimba.
Bongo bato ya bikolo bameli masanga na yango
mpe bakomi lokola bazoba.
Babiloni ekokweya na mbalakata mpe ekobukana !
Bosala matanga mpo na yango mpe botia kisi na pota na yango,
tango mosusu akobika.
 
‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te ;
yango wana, tobima kati na yango mpe tokende,
moto na moto na engumba na ye ;
pamba te esambiselo na ye ekomi kino na Lola,
emati likolo lokola mapata. ›
 
10 ‹ Yawe apesi biso etumbu !
Boya totatola na Siona makambo oyo
Yawe, Nzambe na biso, asali. ›
 
11 Bopelisa basonge ya makonga,
bokamata banguba na bino ;
pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi
mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni.
Yawe akozongisa mabe na mabe,
akosala yango mpo na Tempelo na Ye.
12 Botelemisa bendele na bino liboso ya bamir ya Babiloni !
Bobakisa motango ya bakengeli mpe ya basinzili,
botia mitambo !
Yawe akokokisa mabongisi na Ye
mpe ekateli ya etumbu na Ye mpo na bato ya Babiloni.
13 Yo oyo ovandaka pembeni ya bibale minene,
yo oyo otonda na bomengo mingi,
suka na yo ebelemi, tango na yo ya kobebisama ekoki !
14 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi na Kombo na Ye moko :
Solo, nakotondisa yo na bato lokola liboke ya mabanki,
bongo bakobeta milolo ya elonga likolo na yo.
 
15 Asala mabele na nguya na Ye,
alendisa mokili na bwanya na Ye
mpe atanda likolo na mayele na Ye.
16 Tango agangaka,
mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo,
asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili,
apelisaka mikalikali,
anokisaka mvula
mpe abimisaka mopepe
wuta na bibombelo na Ye.
 
17 Bato nyonso bakomaka lokola bazoba,
lokola bato oyo basili mayele ;
monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye,
pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta,
ezalaka na pema te kati na yango.
18 Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ;
ekolimwa na tango ya kosambisama.
19 Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te,
pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso,
ezala ata ekolo oyo ezali libula na Ye ;
Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
 
20 Ozalaki solo marto,
ebundeli na Ngai ya bitumba :
elongo na yo, napanzaki bikolo ;
elongo na yo, nabebisaki mikili ;
21 elongo na yo, napanzaki mpunda mpe motambolisi na yango ;
elongo na yo, napanzaki shar mpe motambolisi na yango ;
22 elongo na yo, napanzaki mwasi mpe mobali ;
elongo na yo, napanzaki mibange mpe bilenge ;
elongo na yo, napanzaki bilenge mibali mpe bilenge basi ;
23 elongo na yo, napanzaki babateli bibwele mpe bibwele na bango ;
elongo na yo, napanzaki mosali bilanga mpe bangombe na ye ;
elongo na yo, napanzaki bayangeli mpe bakalaka.
24 Nakozongisela Babiloni mpe bavandi na yango nyonso
mabe nyonso oyo basalaki Siona, »
elobi Yawe.
 
25 « Yo ngomba oyo obebisaka,
yo oyo obebisaka mokili, nakotelemela yo, »
elobi Yawe,
« nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo,
nakokitisa yo wuta na likolo ya mabanga,
mpe nakokomisa yo ngomba ezika na moto.
26 Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo
libanga oyo batongelaka basonge ya bamir
to libanga oyo batongelaka miboko ;
pamba te okobebisama mpo na libela, »
elobi Yawe.
27 « Botelemisa bendele kati na mokili !
Bobeta kelelo kati na bikolo !
Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni,
bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati,
ya Mini mpe ya Ashikenazi
mpo ete babundisa yango.
Bopona mokonzi moko ya basoda
mpo ete atambolisa bitumba,
botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.
28 Bobongisa bikolo mpo na kobundisa yango :
bakonzi ya Medi, bayangeli na bango mpe bakalaka na bango nyonso
mpe bamboka nyonso oyo bazali kokamba.
29 Mikili ezali koningana mpe kotepatepa,
pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama
mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te
atikala kovanda lisusu kuna.
30 Basoda ya Babiloni batiki kobunda,
babombami kati na bandako batonga makasi.
Makasi na bango esili, bakomi lokola basi.
Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki
bikangelo bikuke na yango.
31 Bato oyo bamemaka mikanda bazali kolandana mbangu,
mpe bamemi sango bazali kolandana mbangu
mpo na koyebisa mokonzi ya Babiloni
ete babotoli engumba mobimba,
32 bakangi bapon mpe bibale ;
banzete oyo ebotaka na mayi esili na kozika moto
mpe basoda bakomi na somo. »
 
33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
Nzambe ya Isalaele, alobi :
« Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble
na tango banyataka-nyataka yango ;
mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.
 
34 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ;
solo, atiaki biso na mobulu,
akomisaki biso lokola mbeki ya pamba ;
amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama,
atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko ;
mpe sima, asanzaki biso.
35 Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso
ekweyela Babiloni, »
elobi bavandi ya Siona !
« Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni,
elobi bavandi ya Yelusalemi ! »
 
36 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tala, nakozwa likambo na yo na maboko
mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe,
nakokawusa ebale na yango ya monene
mpe nakokawusa maziba na yango.
37 Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga,
ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ;
bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.
38 Bato na yango nyonso bakokoma koganga
lokola nkosi ya mike
mpe kolela lokola bana ya nkosi.
39 Kasi tango bakokoma na posa makasi ya kosangisa nzoto,
nakobongisela bango feti
mpe nakolangwisa bango masanga
mpo ete batondisama na esengo ;
bongo, bakolala pongi ya libela
mpe bakoka lisusu kolamuka te, »
elobi Yawe,
40 « nakomema bango ndenge bamemaka bampate
to bameme ya mibali to mpe bantaba ya mibali
na esika oyo babomelaka bibwele.
41 Ndenge nini bakangi Sheshaki !
Ndenge nini basukisi lolendo ya ekolo
oyo ezalaki kosala lokumu ya mokili mobimba !
Ndenge nini penza Babiloni ekomi penza
eloko ya somo kati na bikolo !
42 Ebale monene ekozindisa Babiloni,
makelele ya bambonge na yango ekozipa mokili ya Babiloni.
43 Bingumba na yango ekobebisama,
ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe,
mokili oyo bato bavandaka te,
mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te.
44 Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni,
nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko ;
ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye
mpe bamir ya Babiloni ekokweya.
 
45 Oh bato na Ngai, bobima na Babiloni !
Bobikisa bomoi na bino liboso ya kanda makasi ya Yawe !
46 Bobanga te mpe bolemba nzoto te
tango bokoyoka basango ya mabe kati na mokili :
mobu oyo, sango ya mabe ; mobu oyo elandi, sango mosusu ya mabe ;
kaka sango ya mobulu kati na mokili
to sango ya mokonzi moko abundisi mokonzi mosusu.
47 Pamba te tango ekoya solo,
tango oyo nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni ;
mpe mokili na yango nyonso ekozala na soni,
mpe bato na yango nyonso oyo bazokisa makasi na mopanga
bakokufa kuna.
48 Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango
ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni,
pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, »
elobi Yawe.
49 « Babiloni mpe esengeli kokweya,
mpo na bana ya Isalaele oyo bakufaki,
ndenge kaka bato ya mokili mobimba bakufaki mpo na Babiloni.
50 Bino bato oyo bobiki na mopanga,
bokima, bolekisa tango te !
Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi !
 
51 Tosambwe, pamba te totiolami ;
mpe bilongi na biso ezipami na soni
mpo ete bapaya bakoti kino na bisika ya bule
ya Tempelo ya Yawe.
52 Kasi na mikolo ekoya, »
elobi Yawe,
« nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni,
mpe mokili mobimba ekotonda na makelele ya bato
oyo bazoka bapota ya somo.
53 Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola
mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi,
nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, »
elobi Yawe.
54 « Makelele ya koganga ekoyokana, wuta na mokili ya Babiloni,
lokito makasi ya kobebisama ya mokili ya bato ya Babiloni.
55 Pamba te Yawe akobebisa Babiloni
mpe akokanga yango monoko.
Lokito ya banguna ekoyokana lokola makelele
ya bambonge ya bibale minene ;
bongo mingongo ya bato ekoyokana makasi.
56 Mobebisi akoya kobundisa Babiloni ;
bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko
mpe bakobuka matolotolo na bango,
pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka :
afutaka kolanda misala ya moto na moto.
57 Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya,
bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko.
Bakolala pongi ya libela
mpe bakolamuka lisusu te, »
elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Mokonzi ya mampinga.
58 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama
mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ;
bato bazali kosala bobele mosala ya pamba
mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi
mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »
Buku ezindi na ebale
59 Tala sango oyo mosakoli Jeremi apesaki epai ya Seraya, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, tango akendeki na Babiloni elongo na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na mobu ya minei ya bokonzi na ye. Seraya azalaki mokonzi ya molako. 60 Jeremi akomaki kati na buku pasi nyonso oyo esengelaki kokomela Babiloni. Makambo wana nyonso ekomamaki na tina na mokili ya Babiloni. 61 Jeremi alobaki na Seraya : « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi. 62 Bongo okoloba : ‹ Oh Yawe, Yo moko nde olobaki ete okobebisa esika oyo mpo ete bato mpe bibwele bavanda lisusu awa te, kasi etikala pamba mpo na libela. › 63 Tango okosilisa kotanga buku yango, kangisa yango na libanga, bwaka yango na ebale Efrate mpe loba : 64 ‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › »
Maloba ya Jeremi esuki awa.