Sango Malamu kolanda
Yoane
1
Liloba na Nzambe mpe Motatoli na yango
Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe. Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe. Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye ; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te. Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato. Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.
Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye ezalaki « Yoane. » Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye. Ye moko Yoane azalaki pole te, kasi ayaki nde mpo na kozala motatoli na tina na pole.
Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso. 10 Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te. 11 Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te ; 12 nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe. 13 Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.
14 Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
15 Yoane azalaki kotatola na tina na Ye, na mongongo makasi : « Botala Ye oyo nalobaki na tina na Ye : ‹ Ye oyo azali koya sima na ngai aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. › » 16 Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu ; 17 pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto. 18 Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.
Bimoniseli ya liboso mpe kokoso ya liboso
Litatoli ya Yoane Mobatisi
(Mat 3.1-12; Mlk 1.2-8; Lk 3.15-17)
19 Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye :
— Yo ozali nani ?
20 Abetaki monoko te, kasi alobaki na bango solo na bonsomi nyonso :
— Ngai, nazali Klisto te.
21 Batunaki ye lisusu :
— Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ?
Azongisaki :
— Nazali Eliya te.
Batunaki ye lisusu :
— Ozali mosakoli ?
Azongisaki :
— Te !
22 Bakobaki kotuna ye :
— Bongo ozali penza nani ? Ozali koloba nini na tina na yo moko ? Yebisa biso yango, pamba te tosengeli kopesa eyano epai ya bato oyo batindi biso.
23 Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki :
— Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe : « Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! »
24 Nzokande batindami yango bazalaki Bafarizeo. 25 Batunaki ye lisusu :
— Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?
26 Yoane azongiselaki bango :
— Ngai, nazali kobatisa na mayi ; kasi kati na bino, ezali na Moto moko oyo bino boyebi te ; 27 azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
28 Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.
Yesu, Mpate ya Nzambe
29 Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki :
— Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili. 30 Ezali na tina na Ye nde nalobaki : « Ezali na moko oyo azali koya sima na ngai, aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. » 31 Ngai moko mpe nayebaki te soki esengelaki kozala nani ; kasi tina oyo ngai nayaki kobatisa bato na mayi, ezalaki nde mpo ete natalisa Ye epai ya bato ya Isalaele.
32 Bongo Yoane apesaki litatoli oyo :
— Namonaki Molimo kokita wuta na likolo lokola ebenga mpe kovanda likolo na Ye. 33 Ngai moko mpe nayebaki Ye te ; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai : « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. » 34 Mpe lokola ezali yango nde likambo oyo ngai namonaki, yango wana nazali kotatola : Moto oyo azali Mwana na Nzambe.
Bayekoli ya liboso ya Yesu
(Mat 4.18-22; Mlk 1.16-20; Lk 5.1-11)
35 Mokolo oyo elandaki, wana Yoane azalaki lisusu na esika yango elongo na bayekoli na ye mibale, 36 amonaki Yesu koleka mpe alobaki : « Botala Mpate ya Nzambe ! »
37 Lokola bayekoli nyonso mibale bayokaki ndenge Yoane alobaki, balandaki Yesu. 38 Bongo tango Yesu abalukaki mpo na kotala na sima, amonaki bango mibale bazali kolanda Ye. Atunaki bango :
— Bolingi nini ?
Bazongisaki :
— Rabi* Rabi elingi koloba : Moteyi., ovandaka wapi ?
39 Yesu azongiselaki bango :
— Boya mpe bokomona.
Balandaki Yesu, bamonaki esika oyo azalaki kovanda mpe bavandaki elongo na Ye na mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei sima na midi.
40 Andre, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko kati na bato wana mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu. 41 Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya Masiya elingi koloba : Klisto. ! » 42 Bongo amemaki Simona epai ya Yesu.
Yesu atalaki Simona mpe alobaki : « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane ; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi Sefasi elingi koloba : Libanga.. »
43 Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye :
« Landa Ngai. »
44 Filipo, Andre mpe Petelo bazalaki bato ya engumba Betisaida. 45 Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye :
— Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.
46 Natanaele atunaki ye :
— Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti ?
Filipo azongiselaki ye :
— Yaka mpe okomona yo moko.
47 Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye :
— Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te !
48 Natanaele atunaki Ye :
— Oyebi ngai ndenge nini ?
Yesu azongiselaki ye :
— Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.
49 Natanaele alobaki :
— Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.
50 Yesu alobaki na ye :
— Ondimi kaka mpo ete nalobi na yo : Namonaki yo na se ya nzete ya figi ? Okomona lisusu makambo minene koleka oyo.
51 Bongo alobaki lisusu : « Nazali koloba na bino penza ya solo : bokomona Likolo kofungwama, mpe ba-anjelu ya Nzambe komata mpe kokita mpo na Mwana na Moto. »

*1:38 Rabi elingi koloba : Moteyi.

1:41 Masiya elingi koloba : Klisto.

1:42 Sefasi elingi koloba : Libanga.