24
Yesu asekwi
(Mat 28.1-9; Mlk 16.1-8; Yn 20.1-13)
Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki. Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda. Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu. Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi. Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango :
— Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ? Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile : « Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »
Boye, bakanisaki maloba ya Yesu.
Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso. 10 Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma, 11 kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
12 Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
Yesu abimeli bayekoli na nzela ya Emausi
13 Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale. 14 Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema. 15 Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko. 16 Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu.
17 Alobaki na bango :
— Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola ?
Batelemaki, bilongi mawa-mawa. 18 Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye :
— Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo !
19 Yesu atunaki bango :
— Makambo nini ?
Bazongisaki :
— Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso. 20 Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu. 21 Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki.
22 Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendeki na kunda na tongo-tongo, 23 kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi. 24 Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te.
25 Yesu alobaki na bango :
— Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba ! 26  Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?
27 Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.
28 Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika. 29 Kasi bango babondelaki Ye makasi :
— Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota.
Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango. 30 Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango. 31 Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango. 32 Batunanaki :
— Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ?
33 Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango, 34 oyo balobaki na bango :
— Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !
35 Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni.
Yesu abimeli bayekoli zomi na moko
(Yn 20.19-23)
36 Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki :
— Tika ete kimia ezala na bino !
37 Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
38 Yesu atunaki bango :
— Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ? 39  Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.
40 Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye. 41 Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango :
— Bozali awa na eloko ya kolia ?
42 Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga. 43 Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
44 Bongo alobaki na bango :
— Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
45 Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
46 Alobaki na bango :
— Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ; 47  mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. » 48  Bino nde bozali batatoli ya makambo yango. 49  Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.
(Mlk 16.19; Mis 1.4-14)
50 Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.
51 Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.
52 Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi. 53 Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.