2
Komekama ya mibale
Mokolo moko lisusu, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
Yawe atunaki Satana :
— Owuti wapi ?
Satana azongiselaki Yawe :
— Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.
Yawe alobaki na Satana :
— Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.
Satana azongiselaki Yawe :
— Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye. Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.
Yawe alobaki na Satana :
— Malamu ! Azali kati na maboko na yo, kasi kosimba bomoi na ye te !
Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.
Yobo akamataki eteni ya mbeki mpo na komikwanza na yango nzoto, mpe amivandisaki na putulu. Mwasi na ye alobaki na ye :
— Boni, ozali kaka kokoba na bosembo na yo ? Lakela Nzambe mabe mpe kufa na yo !
10 Yobo azongiselaki ye :
— Ah ! Ozali koloba lokola moto ya liboma ! Boni, tondimaka kaka makambo ya malamu, epai ya Nzambe, kasi tondimaka makambo mabe te ?
Baninga misato ya Yobo
11 Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye.
12 Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito. 13 Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi.