Maloba ya Yobo mpe ya balingami na ye misato
3
Yobo alakeli mokolo ya mbotama na ye mabe
Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe. Yobo alobaki :
« Tika ete mokolo ya mbotama na ngai,
mpe butu oyo elobaki :
‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa !
Tika ete mokolo yango ebongwana molili !
Tika ete, wuta na likolo,
Nzambe akanisa yango lisusu te !
Tika ete pole engengela yango lisusu te !
Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango !
Tika ete lipata ezipa yango,
mpe molili ebangisa pole na yango !
Tika ete molili makasi ekotela butu yango,
ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu
to kati na mikolo ya basanza !
Tika ete butu yango etikala ekomba,
ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango !
Tika ete bato oyo balakelaka mikolo mabe,
bato oyo balamusaka bilima minene ya mayi,
balakela yango mabe !
Tika ete minzoto ya tongo na yango ekoma molili,
ezela na pamba tongo oyo ekotana
mpe emona kongenga ya tongo te.
10 Pamba te ekangelaki ngai te
bikuke ya libumu ya mama na ngai
mpo na kobombela miso na ngai pasi ya boye !
 
11 Mpo na nini namikufelaki te
kati na libumu ya mama na ngai ?
Mpo na nini nakataki motema te
tango nabimaki na libumu ya mama na ngai ?
12 Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai ?
Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele ?
13 Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia,
nalingaki na ngai kokufa mpe kopema
14 elongo na bakonzi mpe bapesi toli ya mokili,
oyo bamitongelaki malita na bango kasi lelo ebeba,
15 elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo
mpe batondisa palata kati na bandako na bango.
16 Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele
lokola zemi oyo esopani
to lokola mwana oyo atikala komona te
pole ya mokolo ?
17 Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato,
bato oyo balembi bazwaka bopemi,
18 bato ya boloko bazwaka kimia
mpe bayokaka lisusu te mongongo ya mokengeli.
19 Ezala mobola to mozwi, bango mibale bazalaka kuna,
mpe mowumbu akangolamaka na maboko ya nkolo na ye.
 
20 Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi ?
Mpo na nini bomoi epesamelaka moto
oyo azali na pasi na motema ?
21 Bazelaka kufa, kasi eyaka te ;
nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,
22 balingaki kotonda na esengo mpe kosepela
soki bamoni kunda !
23 Mpo na nini bomoi epesamela moto
oyo nzela na ye ebombama,
moto oyo Nzambe azingela lokola lopango ?
24 Pamba te kolela ekomi bilei na ngai,
bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.
25 Makambo oyo nazalaki kobanga,
yango nde ezali kokomela ngai ;
oyo nazalaki koyokela somo,
yango nde ezali kosalemela ngai.
26 Nazangi kimia, motema na ngai ezali kokita te
mpe nazangi bopemi ;
kasi minyoko na minyoko kaka nde nazali na yango. »