4
Maloba ya Elifazi : moto nyonso asalaka mabe
Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
« Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko,
boni, okotomboka mpo na yango te ?
Kasi nani akoki penza kokanga motema
mpe kozanga maloba ?
Kanisa nanu ndenge ozalaki koteya bato ebele,
ndenge ozalaki kolendisa bato oyo balembaki !
Maloba na yo ezalaki kolendisa bato
oyo bazalaki kotepatepa,
mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba.
Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo,
olembi na yo !
Awa pasi ebeti yo,
okomi na yo koyoka somo !
Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te
kozala likonzi na yo,
mpe bosembo na yo esengeli te
kosimba elikya na yo ?
 
Kanisa nanu : Nani akotikala kokufa te
mpo ete asalaka mabe te ?
Esika nini bato ya sembo bakotikala kokufa te ?
Kolanda makambo oyo ngai nasili komona,
bato oyo basalaka mabe,
mpe ba-oyo balonaka minyoko,
babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma ;
bakufaka na mopepe ya Nzambe
mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.
 
10 Nkosi ekoki na yango koganga,
mpe mwana ya nkosi ekoki kotia makelele ndenge elingi,
kasi Nzambe abukaka minu ya nkosi.
11 Nkosi ekufaka mpo na kozanga nyama ya kolia,
mpe bana ya nkosi ya mwasi epanzanaka.
 
12 Liloba moko eyelaki ngai na nkuku,
mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza :
13 kati na bandoto ya butu,
na tango bato bazwaka pongi makasi,
14 kobanga mpe somo ekangaki ngai
mpe eningisaki mikuwa na ngai nyonso ;
15 molimo moko elekaki liboso ya elongi na ngai
lokola mopepe,
mpe suki ya moto na ngai etelemaki.
16 Molimo yango etelemaki wana,
kasi nalongaki te kososola soki ezali nini ;
elilingi yango etelemaki liboso ya miso na ngai,
mpe nayokaki mongongo moko koloba na se penza :
17 ‹ Boni, moto akoki solo koleka Nzambe na bosembo
to akoki solo koleka Mokeli na ye na bule ?
18 Soki Nzambe atielaka basali na Ye motema te,
soki kutu amonaka mabunga epai ya ba-anjelu na Ye,
19 mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele,
ba-oyo bazali kaka putulu
mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ?
20 Kobanda na tongo kino na pokwa,
bakataka-kataka bango na biteni ;
bakufaka mpo na libela,
mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango ;
21 basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo
epikolamaka na mbalakata,
mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›