5
Ganga na yo, soki olingi !
Nani akoyanola yo ?
Okotombokela mosantu nini ?
Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele,
zuwa ebomaka zoba.
Solo, namonaki zoba kozwa misisa ;
kasi, mbala moko, nalakelaki ndako na ye mabe :
‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi,
balonga te na kosambisama
mpe bazangela moto oyo akobundela bango !
Tika ete moto oyo azali na nzala
asilisa mbuma ya elanga na ye,
akamata yango kino kati na basende ;
mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! ›
Pamba te pasi ewutaka na putulu te,
mpe minyoko ewutaka na mabele te ;
moto abotamaka mpo na komona pasi,
ndenge kaka mikalikali ebimaka mpo na kopanzana na likolo.
 
Kasi soki ezalaki ngai,
nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe,
nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai.
Nzambe asalaka makambo minene
oyo bato bakokaka kososola te,
mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;
10 anokisaka mvula na mokili,
mpe atindaka mayi na bilanga ;
11 atombolaka bato oyo babwakama,
mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela ;
12 abebisaka mabongisi ya bato
oyo bazalaka na mayele mabe,
mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango ;
13 akangaka bato ya bwanya
kati na mitambo ya mayele mabe na bango,
mpe abebisaka mabongisi ya bakosi.
14 Molili eyelaka bango na moyi ;
na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.
 
15 Nzambe abikisaka mobola
na mopanga ya monoko na bango,
akangolaka moto akelela
na loboko ya moto ya makasi.
16 Boye, mobola asengeli kozala na elikya,
mpe moto oyo atambolaka na bosembo te
asengeli kokanga monoko.
 
17 Esengo na moto oyo Nzambe apameli !
Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
18 Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ;
abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.
19 Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ;
mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.
20 Akokangola yo na kufa,
na tango ya nzala makasi ;
mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga,
kati na bitumba.
21 Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo,
okobanga kobebisama te tango ekoya ;
22 okoseka kobebisama mpe nzala makasi,
mpe okobanga te banyama ya mokili ;
23 pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga,
mpe banyama ya zamba ekozala na kimia elongo na yo.
24 Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ;
tango okotala bibwele kati na lopango na yo,
okomona ete ata moko te ezangi.
25 Okososola ete bana na yo bakozala ebele,
mpe bakitani na yo, lokola matiti ya mabele.
26 Okokita na kunda na kimobange makasi,
ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.
 
27 Toyekolaki likambo yango malamu : ezali penza bongo.
Boye, yoka yango mpe salela yango
mpo na bolamu na yo ! »