6
Eyano ya Yobo epai ya Elifazi
Yobo azongisaki :
« Ah ! Soki ezalaki na makoki ya komeka
kilo ya mawa na ngai,
mpe ya kotia pasi na ngai nyonso na emekelo kilo,
nakanisi ete elingaki koleka zelo ya bibale minene na kilo.
Yango wana, maloba na ngai ezali koleka ndelo.
Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai,
mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ;
Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.
Boni, ane ya zamba elelaka
soki ezali kolia matiti ?
Ngombe ya mobali elelaka
soki ezali kolia bilei na yango ?
Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi ?
Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi ?
Makambo oyo nazalaki koboya,
yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe.
 
Ah ! Nani akoki kosala ete
bosenga na ngai ekokisama,
mpe ete Nzambe akokisela ngai
likambo oyo nazali kozela !
Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai,
asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto !
10 Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo
kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo,
pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu.
 
11 Makasi nini penza nazali na yango
mpo ete nazala lisusu na elikya ?
Mpo na nini nawumela lisusu kotala
suka ya bomoi na ngai ?
12 Boni, nazali makasi lokola libanga ?
Nzoto na ngai ezali ya ebende ?
13 Nazali na nguya ya komisunga
awa natikali lisusu na makoki te ?
 
14 Moto nyonso oyo azali na pasi
asengeli na mawa ya baninga na ye,
ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
15 Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka,
lokola mayi ya moluka oyo ekawuki.
16 Tango mayi oyo ekomaka libanga mpo na malili,
mpe mvula ya pembe, epanzanaka,
ememaka mpela.
17 Kasi na tango ya molunge, mayi yango esilaka,
mpe moluka yango ekawukaka nyonso
mpo na molunge makasi.
18 Masanga ya bato oyo batambolaka na bampunda
mpo na kokende na mobembo,
ebongoli nzela ya kokende,
ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna.
19 Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo,
elukaki mayi ;
masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo,
etielaki yango motema.
20 Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema ;
tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa.
21 Bino mpe bozali ndenge wana mpo na ngai,
bozali na makoki te ya kosunga ngai ;
awa bomoni pasi na ngai, somo ekangi bino !
22 Boni, nasila koloba na bino :
‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na bino
to bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino,
23 mpo na kokangola ngai na loboko ya monguna
to mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe ? ›
 
24 Boteya ngai, bongo nakokanga monoko ;
bolakisa ngai mabe nini ngai nasali !
25 Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi !
Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini ?
26 Bokanisi ete bokoki kosembola
makambo oyo nazali koloba
to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi ?
27 Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike
mpe koteka moninga na bino na bowumbu !
 
28 Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai !
Boni, nakoki penza kokosa bino,
kaka na miso makasi boye ?
29 Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo !
Bokanisa penza malamu,
pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami.
30 Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai ;
monoko na ngai ekoki kososola mabe te ?