7
Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka
bomoi ya pasi te ?
Mikolo ya bomoi na ye ezali penza
mikolo ya mongamba te ?
Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa
to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,
ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba
mpe babutu ya pasi na pasi.
Soki kaka nalali, nakomi komituna :
‹ Tango nini nakolamuka ? ›
Mpe soki kaka nalamuki :
‹ Tango nini butu ekoya ? ›
Nalembi komitungisa tango nyonso.
Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai,
poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota
mpe ekomi kolumba solo.
 
Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza
koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ;
nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.
Oh Nkolo, kobosana te
ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba !
Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.
Liso oyo ezali komona ngai sik’oyo
ekotikala komona ngai lisusu te ;
okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.
Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka,
ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi
azongaka lisusu te.
10 Akozonga lisusu te na ndako na ye,
mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.
 
11 Yango wana, nakokanga monoko na ngai te,
molimo na ngai ekoloba kaka na mawa,
mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.
12 Boni, nakomi ebale to elima ya mayi
mpo ete batiela ngai bikangiseli ?
13 Nakanisaka ete soki nalali,
mbeto na ngai ekobondisa ngai
mpe pongi ekokitisa pasi na ngai ;
14 nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabe
mpe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo.
15 Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa,
pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.
16 Nayini bomoi na ngai ; nawumela libela te na bomoi !
Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.
 
17 Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye,
mpo ete olandelaka ye na bokebi,
18 mpo ete otalaka ye tango nyonso
mpe omekaka ye tango nyonso ?
19 Mpo na nini okoki kolongola miso na Yo te likolo na ngai ?
Mpo na nini okoki kotika ngai kimia te
ata mpo na ngonga moke ?
20 Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu,
eloko nini ngai nasali Yo ?
Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ?
Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?
21 Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te
mpe ozali kobosana masumu na ngai te ?
Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ;
okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »