8
Maloba ya Bilidadi : Nzambe azali sembo
Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :
« Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye ?
Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi ?
Boni, Nzambe abukaka mibeko,
Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo ?
Soki bana na yo basalaki masumu liboso na Ye,
apesaki nde bango etumbu mpo na mabe na bango !
Kasi yo, soki oluki Nzambe,
soki osengi ngolu epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
soki ozali peto, soki ozali sembo,
akotelema Ye moko, ata sik’oyo,
mpo na kokata likambo na yo
mpe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo.
Bozwi na yo ya kala ekomonana moke,
pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.
 
Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso,
kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango,
pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka,
toyebi eloko te,
mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.
10 Bato ya kala bakoteya yo, bakoloba na yo,
mpe, na bwanya na bango, bakobimisela yo mateya oyo :
11 Boni, nzete ya papirisi ekoki penza kobota
na esika oyo ezangi potopoto ?
Nzete oyo ebotaka na mayi ekoki solo kobota
na esika ekawuka ?
12 Ekawukaka liboso ya matiti nyonso,
wana makasa na yango ezali nanu mobesu,
ata bapikoli yango te.
13 Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso
oyo babosanaka Nzambe ;
boye, elikya ya bato mabe ebebaka.
14 Eloko oyo batielaka motema ekokatana,
pamba te elikya na bango ezali
lokola ndako ya limpulututu* Limpulututu ezali nyama ya moke oyo babengaka na lifalanse araignée..
15 Ata batieli ndako na bango motema,
esimbaka te ;
Ezala bakangami na yango,
esimbaka kaka te.
16 Bazali lokola nzete ya mobesu
na tango ya moyi makasi ;
mandalala na yango ezipaka elanga,
17 elingaka misisa na yango zingazinga ya mabanga
mpe epasolaka nzela kati na mabanga ;
18 kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango,
esika yango ewanganaka nzete
mpe elobaka : ‹ Natikala komona yo te ! ›
19 Ndenge wana nde suka na yango ekozala ;
mpe banzete mosusu ekobota kaka na mabele wana.
 
20 Solo, Nzambe abwakaka te bato ya sembo,
mpe alendisaka te maboko ya bato mabe.
21 Nzokande, akotondisa monoko na yo na koseka,
mpe bibebu na yo na banzembo ya esengo.
22 Banguna na yo bakotondisama na soni,
mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »

*8:14 Limpulututu ezali nyama ya moke oyo babengaka na lifalanse araignée.