9
Eyano ya Yobo epai ya Bilidadi
Yobo azongisaki :
« Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba,
mpe nayebi yango malamu !
Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu
akoki kozala sembo liboso ya Nzambe ?
Ata, na mbala nkoto moko,
ameki kobeta tembe na Nzambe,
akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.
Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi,
mpe nguya na Ye ezali monene ;
nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?
Alongolaka bangomba na bisika na yango,
wana yango moko eyebaka te,
mpe, kati na kanda na Ye, akweyisaka yango ;
aningisaka mabele wuta na esika na yango
mpe alengisaka makonzi na yango ;
apesaka mitindo na moyi, mpe moyi ebimaka te ;
atiaka kashe na minzoto.
Atandaki Ye moko Likolo
mpe atambolaka likolo ya mbonge ya ebale ;
akelaki bangombolo minene,
orioni, masanga ya minzoto mpe minzoto ya sude ;
10 asalaka makambo minene
oyo elekelaka mayele ya bato,
bikamwa ya somo oyo bakokaka kotanga te.
11 Soki aleki pene na ngai, nakokoka te komona Ye ;
soki mpe akei, nakokoka te komona Ye.
12 Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango ?
Nani akoki koloba na Ye : ‹ Ozali kosala nini ? ›
13 Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te ;
liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka.
 
14 Bongo, ngai, nakokoka ndenge nini kobeta tembe na Ye ?
Nakolonga ndenge nini kopona
maloba ya komekana na Ye ?
15 Ezala soki nazalaki moto ya sembo,
nalingaki na ngai kokoka te kopesa Ye eyano ;
nalingaki kokoka nde kaka kosenga
mawa ya Mosambisi na ngai.
16 Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai,
nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,
17 pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi
mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba,
18 aboyi kotikela ngai tango ya kopema,
wana azali kaka kotondisa ngai na pasi.
19 Soki ezali likambo oyo esengi makasi,
Ye nde Nkolo-Na-Nguya !
Mpe soki ezali likambo ya bosembo,
nani akoki kosambisa Ye ?
20 Ezala namemaki na ngai ngambo te,
monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ;
ezala nazalaki sembo,
monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.
 
21 Atako nazali sembo,
motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko,
nayini bomoi na ngai.
22 Nyonso ezali kaka ndenge moko !
Yango wana nalobi :
‹ Abomaka bato ya sembo mpe bato mabe. ›
23 Tango mopepe ya bokono ememaka kufa na mbalakata,
Nzambe asekaka komekama ya bato ya sembo.
24 Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe,
Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango.
Soki ezali Ye te, ezali nani ?
 
25 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu
koleka mopoti mbangu,
ezali kokende mbangu penza,
kasi etikali komona esengo te.
26 Ezali kokende penza mbangu
koleka masuwa oyo esalema na papirisi,
koleka mpongo oyo ezali kokitela bilei na yango.
27 Soki nalobi : ‹ Nabosana ata pasi na ngai,
nabongola elongi na ngai mpe nakoma koseka, ›
28 nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso,
pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te
lokola moto ya sembo.
29 Lokola esili komonana ete nasali mabe,
mpo na nini namitungisa lisusu na pamba ?
30 Ezala namisukoli nzoto na sabuni
mpe nasukoli maboko na ngai na sabuni ya malonga,
31 okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto,
mpe bilamba na ngai ekoyoka ngai nkele.
 
32 Azali moto lokola ngai te
mpo ete nazongisela Ye eyano
to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.
33 Soki ezalaki ata na moto moko
oyo akokaki komikotisa kati na likambo na biso
mpe kotombola loboko na ye kati na ngai mpe Nzambe,
34 moto oyo akokaki kolongola
fimbu ya Nzambe mosika na ngai
mpo ete somo na Ye ebangisa ngai lisusu te,
35 nalingaki kotombola mongongo na ngai
liboso na Ye na kobanga te.
Kasi ndenge ezali sik’oyo, nakokoka te.