10
Nayini bomoi na ngai !
Nakokoba kaka komilela,
nakoloba na mongongo makasi
mpe na pasi ya motema na ngai.
Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te,
yebisa ngai mabe nini nasali ! ›
Boni, ozali kosepela konyokola ngai,
kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali,
mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe ?
Boni, ozali na miso ya mosuni ?
Ozali komona lokola bato ?
Boni, mikolo na Yo ezali lokola mikolo ya bato,
mpe mibu na yo, lokola mibu ya bato,
mpo ete oluka mabe na ngai
to okundola masumu na ngai,
atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te,
mpe ete ezali na moto moko te
oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?
 
Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai ;
olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai ?
Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai
lokola mabele ya bikeko ;
olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu ?
10 Osopaki ngai lokola miliki te ?
Okangisaki ngai mbuma-mbuma te lokola fromage ?
11 Olatisaki ngai poso ya nzoto mpe misuni te ?
Otongaki mikuwa mpe misisa na ngai te ?
12 Opesaki ngai bomoi mpe otalisaki ngai bolamu ;
mpe na bonzambe na Yo, obatelaki molimo na ngai.
 
13 Kasi tala likambo oyo obombaki kati na motema na Yo,
mpe nayebi ete ezalaka kati na makanisi na Yo.
14 Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai,
mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu
mpo na masumu na ngai.
15 Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai !
Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto,
pamba te natondisami na soni
mpe nazindi kati na pasi na ngai.
16 Soki nameki kotombola moto,
ozali kolanda ngai lokola nkosi
mpe ozali kobimisela ngai mayele na Yo nyonso
mpo na kotelemela ngai,
17 ozali komemela ngai batatoli ya sika
mpo na kotelemela ngai,
ozali kopelisela ngai kanda na Yo
mpo na kosala ngai mabe,
mampinga na Yo bazali tango nyonso koya kobundisa ngai.
 
18 Mpo na nini obimisaki ngai
na libumu ya mama na ngai ?
Nalingaki na ngai kokufa,
mpe liso moko te elingaki komona ngai.
19 Soki kutu nazalaka na ngai te,
nalingaki koleka kaka mbala moko
longwa na libumu ya mama kino na kunda.
20 Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te ?
Kende ata mosika na ngai
mpo ete nazwa ata tango ya kosepela
21 liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te,
na mokili ya molili, mokili ya kufa,
22 na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu,
epai wapi ata pole ezalaka molili. »