11
Maloba ya Tsofari
Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :
« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ?
Moto oyo azali koloba alonga na ye,
kaka mpo ayebi koloba ?
Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba
oyo ozali kobimisa ?
Bapamela yo te soki ozali kosala maseki ?
Ozali koloba na Nzambe :
‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo ;
nazali sembo na miso na Yo. ›
Oh, tala ndenge nini nazali na posa
ete Nzambe aloba,
ete afungola monoko na Ye mpo na kopamela yo,
mpe asosolisa yo basekele ya bwanya,
pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale.
Yeba likambo oyo :
Nzambe abosana masumu na yo ebele.
 
Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ?
Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ?
Bandelo yango eleki Lola na likolo ;
yo penza okosala nini ?
Eleki mboka ya bakufi na bozindo ;
yo penza okoyeba nini ?
Molayi ya bandelo yango eleki mokili na molayi,
mpe eleki ebale monene na kopanzana.
 
10 Soki akotisi yo na boloko
mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo,
nani akotelemela Ye ?
11 Solo, ayebaka bakosi
mpe asosolaka mabe na pete.
12 Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te,
ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.
 
13 Nzokande, soki opesi Ye motema na yo
mpe osemboli maboko na yo epai na Ye,
14 soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo
mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,
15 okotombola elongi na yo na soni te,
okotelema ngwi mpe okobanga eloko te ;
16 pamba te okobosana pasi na yo,
okokoma kokanisa yango kaka
lokola mayi oyo esili kotiola.
17 Bomoi na yo ekongenga
lokola pole ya moyi oyo engengaka na midi,
mpe butu na yo ekokoma lokola tongo.
18 Okozala na kimia, pamba te elikya ezali,
okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia,
19 okolala pongi, mpe okomona moto moko te
kobangisa yo lisusu,
mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.
20 Kasi miso ya bato mabe ekokufa,
mpe bakozanga ekimelo,
bakotikala na elikya se moko : kufa. »