12
Eyano na Yobo epai ya Tsofari
Yobo azongisaki :
« Solo, bozali penza bato ;
tango bokokufa, bwanya mpe ekokufa elongo na bino !
Kasi atako bongo, ngai mpe nazali mayele lokola bino,
boleki ngai na eloko te.
Nani ayebi te makambo wana nyonso ?
 
Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai,
ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ;
moto ya sembo, moto ya alima,
ye nde akomi eloko ya kotiola !
Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi,
babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti.
Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia,
mpe bato oyo batombokelaka Nzambe,
oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe,
bango nde babatelamaka.
 
Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo ;
tuna ndeke ya likolo, ekolakisa yo ;
loba na mabele, ekoteya yo ;
to tika ete mbisi ya ebale monene epesa yo sango.
Kati na yango, ekelamu nini
eyebi te ete loboko ya Yawe nde esalaki nyonso wana ?
10 Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso
ezali kati na loboko na Ye.
11 Boni, litoyi emekaka maloba te
ndenge lolemo emekaka bilei ?
12 Bwanya ezalaka kati na bampaka te ?
Bomoi ya molayi epesaka mayele te ?
 
13 Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe,
toli mpe mayele ezali ya Ye.
14 Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa,
bakokoka kokangola te moto oyo Ye asili kokanga.
15 Soki akangi mayi, bokawuki ekotaka ;
kasi soki afungoli yango, mokili ezindaka.
16 Makasi mpe elonga ezali ya Ye ;
moto oyo basili kokosa mpe moto oyo akosi,
bango mibale bazali ya Ye.
17 Amemaka bapesi toli na bowumbu
mpe akomisaka basambisi bato ya maboma ;
18 afungolaka minyololo ya bakonzi
mpe akangaka liputa na baloketo na bango ;
19 amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu
mpe akweyisaka bato oyo bavanda kala na bokonzi ;
20 akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu,
alongolaka mikolo bososoli ;
21 asopelaka bakonzi soni,
abotolaka bibundeli ya bato ya makasi ;
22 abimisaka na pwasa, makambo ya sekele,
makambo oyo ezali kati na molili,
mpe abimisaka na pole bililingi oyo eleki mwindo ;
23 atombolaka bikolo mpe abebisaka yango,
akomisaka minene mindelo ya bikolo
mpe apanzaka yango ;
24 alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo
mpe asalaka ete batambola kati na bisobe
oyo ezanga nzela
25 mpo ete batepatepa kati na molili,
na kozanga pole ;
mpe asalaka ete batepatepa
lokola moto alangwe masanga.