13
Miso na ngai emonaki makambo oyo nyonso,
matoyi na ngai eyokaki yango,
mpe nasosoli yango malamu.
Nayebi makambo nyonso oyo bino boyebi,
boleki ngai na eloko moko te.
Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe.
Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta,
bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te.
Soki bovandaki ata kimia,
bolingaki ata komonana bato ya bwanya.
Yoka sik’oyo maloba na ngai,
yoka kosamba ya bibebu na ngai.
Boni, bozali kokotela Nzambe na nzela ya lokuta
mpe ya maloba ya solo te ?
Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye ?
Bolingi kobundela Nzambe ?
Bokosepela soki aluki koyeba makanisi ya mitema na bino ?
Bokanisi ete bokoki kokosa Ye ndenge bakosaka bato ?
10 Akopamela bino solo soki amoni ete, na se ya mitema na bino,
boponaka-ponaka bilongi.
11 Boni, bokozala ata na somo ya lokumu na Ye te ?
Kolenga ekokweyela bino te ?
12 Pamba te maloba na bino ekokani na putulu,
mpe makanisi na bino ezali lokola mabele ya bikeko.
 
13 Botika makelele mpe botika ngai naloba !
Oyo ekoya eya !
14 Mpo na nini nandima kokufa
mpe nasakanela bomoi na ngai ?
15 Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye,
nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.
16 Yango kutu nde ekozala lobiko na ngai,
pamba te moto moko te oyo azangi koyeba Nzambe
akoki koya liboso na Ye.
17 Boyoka maloba na ngai malamu ;
tika ete matoyi na bino eyoka malamu
makambo oyo nazali koloba !
18 Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai,
nayebi ete nakolonga na kosambisama.
19 Nani akoki kofunda ngai ?
Soki te, nakokanga monoko mpe nakokufa.
 
20 Oh Nzambe, pesa ngai kaka biloko mibale,
mpe nakobombama te liboso na Yo :
21 longola loboko na Yo likolo na ngai,
mpe tika kobangisa ngai na somo na Yo.
22 Bongo benga ngai, mpe nakoyanola ;
to tika ngai naloba,
mpe Yo okoyanola ngai.
23 Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo ?
Talisa ngai mbeba mpe masumu na ngai.
24 Mpo na nini obombi elongi na Yo
mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo ?
25 Olingi kaka kotungisa lokasa
oyo mopepe ezali komema ?
Olingi kaka kolandela lititi oyo ekawuka ?
26 Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai
mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai.
27 Okangi makolo na ngai na minyololo ya bibende,
ozali kokengela malamu lolenge na ngai ya kotambola
mpe kolandela bisika nyonso
oyo natiaka bilembo ya matambe na ngai.
 
28 Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola,
lokola elamba oyo balie na banselele !