15
Maloba ya Elifazi : moto mabe azwaka etumbu 
  1 Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :   
 2 « Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano  
na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina,  
to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto  
oyo ewutaka na Este ?   
 3 Akoki solo komilobela na maloba ezanga ata tina ?  
Akoki solo kosalela maloba milayi  
oyo ezali ata na motuya te ?   
 4 Yo ozali penza kobebisa lokumu ya Nzambe  
okomi koboya lokumu liboso ya Nzambe.   
 5 Lisumu na yo ezali kokamba monoko na yo,  
ozwi elobeli ya bakosi.   
 6 Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu,  
kasi monoko na ngai te ;  
bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.   
 7 Yo nde moto ya liboso oyo obotama kati na bato ?  
Omona moyi liboso ya bangomba mikuse ?   
 8 Osila koyoka makambo oyo elobamaka  
kati na Likita ya Nzambe ?  
Bwanya ezalaka kaka epai na yo moko ?   
 9 Makambo nini oyebi, oyo biso toyebi te ?  
Boyebi nini ozali na yango, oyo biso tozali na yango te ?   
 10 Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka,  
bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama.   
 11 Kobondisama ya Nzambe mpe maloba ya kimia  
oyo bazali koloba mpo na yo,  
ekoki te mpo na yo ?   
 12 Mpo na nini motema na yo ezali kopengwisa yo,  
mpe miso na yo ezali kobeta-beta ?   
 13 Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo  
mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo ?   
 14 Moto azali nani mpo ete azala peto ?  
Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo ?   
 15 Soki Nkolo azali kondimela basantu na Ye te,  
soki kutu likolo ezali peto te na miso na Ye,   
 16 ekozala boni mpo na moto mabe, moto oyo abeba,  
oyo asalaka mabe lokola azali komela mayi ?   
 17 Yoka ngai, mpe nakolimbolela yo !  
Tika ete nayebisa yo makambo oyo ngai namona,   
 18 makambo oyo bato ya bwanya balobaki,  
na kobomba ata eloko moko te kati na makambo  
oyo bazwaki epai ya batata na bango.   
 19 Apesaki mokili epai na bango kaka  
tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango.   
 20 Na bomoi na ye mobimba,  
na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye,  
moto mabe anyokwamaka.   
 21 Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye,  
bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.   
 22 Azalaka na elikya te ya kobima na molili,  
mpe mopanga ezelaka ye.   
 23 Ayengaka-yengaka mpo na koluka lipa,  
kasi akozwela yango wapi ?  
Ayebaka ete mokolo ya molili ezelaka ye.   
 24 Pasi mpe mawa ebangisaka ye,  
ekomelaka ye lokola mokonzi  
oyo amibongisi mpo na bitumba,   
 25 mpo ete asembolaka loboko na ye  
mpo na kobundisa Nzambe,  
atelemelaka Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,   
 26 akimaka epai na Ye, moto etala na se,  
amibombaka na sima ya banguba minene.   
 27 Elongi na ye ekotonda mafuta,  
loketo na ye ekokoma monene ;   
 28 akovanda na engumba ebeba,  
kati na bandako oyo bato bakima,  
bandako oyo ekoma pene ya kokweya ;   
 29 akotikala kokoma mozwi te,  
pamba te bozwi na ye ekowumela te,  
bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba ;   
 30 akokoka kokima molili te,  
moto ekokawusa mandalala na ye  
mpe akokima ata pema na ye moko.   
 31 Tika ete atia elikya na ye na lokuta te,  
pamba te akoyokisama soni  
mpe akozwa libebi lokola lifuti.   
 32 Ekokokisama liboso ete akufa,  
ndenge lindalala ekawukaka  
mpo na kozanga mayi na yango   
 33 to lokola nzete ya vino oyo ekweyisi bambuma na yango,  
wana ezali nanu mobesu  
to lokola nzete ya olive oyo ekweyisi fololo na yango.   
 34 Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te,  
mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko.   
 35 Pamba te moto nyonso oyo azalaka  
na makanisi mabe kati na ye  
abotaka kaka pasi ;  
mabe oyo ekolaka kati na ye  
ememelaka ye moko libebi. »