16
Eyano ya Yobo epai ya Elifazi 
  1 Yobo azongisaki :   
 2 « Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo ;  
bino nyonso bozali babondisi mabe.   
 3 Kino tango nini bokotika koloba  
maloba ya pamba-pamba boye ?  
Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba ?   
 4 Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino,  
soki bozalaki na esika na ngai,  
nakokaki kobimisa maloba ebele  
mpe koningisa moto mpo na bino.   
 5 Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino,  
mpe bibebu na ngai elingaki koningana  
mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi.   
 6 Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te ;  
bongo soki nakangi monoko nde pasi yango  
elongwe na bomoi na ngai ?   
 7 Oh Nzambe ! Solo penza, olembisi ngai !  
Obebisi ndako na ngai nyonso,   
 8 ofini-fini ngai makasi penza,  
mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatola  
mpe kofunda ngai na miso ya bato !   
 9 Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai,  
okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe  
mpe kotala ngai na miso mabe  
lokola nde nazali monguna na yo.   
 10 Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai,  
bakomi kobeta ngai bambata na matama  
mpo na kosambwisa ngai,  
bango nyonso basaleli ngai likita.   
 11 Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe  
mpe abwaki ngai na manzaka na bango.   
 12 Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai,  
kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai,  
akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga ;   
 13 makonga na Ye ezingeli ngai,  
atoboli-toboli libumu na ngai,  
mpe na mawa te, asopi makila na ngai na mabele.   
 14 Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai  
mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.   
 15 Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngai  
mpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu.   
 16 Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane,  
mpe molili ezingeli miso na ngai.   
 17 Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te,  
mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.   
 18 Oh mabele, kozipa makila na ngai te !  
Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema !   
 19 Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo,  
molobeli na ngai azali na Lola.   
 20 Baninga na ngai bakomi koseka ngai ;  
nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.   
 21 Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela  
moto liboso ya Nzambe  
ndenge moto alobelaka moninga na ye ?   
 22 Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila,  
mpe nakokende na ngai na nzela  
oyo bato bazongaka lisusu te.