17
 1 Pema na ngai ekomi pene ya kosila,  
mikolo na ngai etikali ya kotanga,  
kunda ezali kozela ngai.   
 2 Solo, batioli bazingeli ngai,  
miso na ngai ezali komona kotiola na bango.   
 3 Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga,  
na esika na ngai, epai na Yo ;  
soki te, nani mosusu akoki komipesa  
lokola ndanga mpo na ngai !   
 4 Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ;  
yango wana, okolongisa bango te.   
 5 Moto oyo akofunda balingami na ye  
mpo ete babotola bomengo na bango na makasi,  
bana na ye bakokufa miso.   
 6 Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato,  
lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.   
 7 Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi,  
mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.   
 8 Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango,  
mpe moto oyo ayebi na ye likambo te  
atelemeli moto mabe.   
 9 Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango,  
mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.   
 10 Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu !  
Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.   
 11 Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ;  
mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai,  
nyonso, esili kobeba.   
 12 Bato oyo bazali komona butu lokola moyi  
bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, ›  
nzokande molili ezali makasi.   
 13 Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya,  
ezali nde kunda ;  
soki mpe nakotandaka mbeto na ngai,  
ezali nde kati na mboka ya bakufi.   
 14 Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, ›  
mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai  
to ndeko na ngai ya mwasi, ›   
 15 wana elikya na ngai ezali penza wapi,  
mpe nani penza azali komona elikya na ngai ?   
 16 Ekokita kino na bikuke ya kufa  
tango tokokende elongo kopema kati na putulu. »