18
Maloba ya mibale ya Bilidadi
Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :
« Kino tango nini okoloba maloba ya boye ?
Kanisa nanu malamu, bongo tokosolola.
Mpo na nini komona biso lokola banyama ?
Boni, tozali nde bazoba na miso na yo ?
Awa, likolo ya kanda na yo, ozali komipasola na biteni,
basundola mokili to balongola mabanga
na bisika na yango likolo na yo ?
 
Solo, mwinda ya moto mabe ekufaka,
moto na yango etikaka kopela.
Pole ekomaka molili kati na ndako na ye,
mpe mwinda oyo epelaka pembeni na ye ekufaka.
Makasi ya matambe na ye esilaka,
makanisi na ye moko ekweyisaka ye.
Makolo na ye ekangisaka ye na monyama,
bongo abundaka-bundaka kati na madusu na yango.
Motambo ekangaka matambe na ye,
mpe singa na yango ekangaka ye makasi.
10 Singa ya motambo ebombama na se ya mabele mpo na ye,
mpe batia motambo na nzela na ye.
11 Somo elandaka ye bisika nyonso
oyo atambolaka.
12 Nzala esilisaka makasi na ye,
mpe pasi ya ndenge na ndenge
ezalaka pembeni na ye soki akweyi.
13 Pasi eliaka poso ya nzoto na ye
mpe bokono oyo ebomaka ebebisaka biteni ya nzoto na ye.
14 Balongolaka kati na ndako na ye
biloko nyonso ya motuya, oyo atielaka motema,
mpe akendaka kokutana na bakonzi ya kufa.
15 Ndako na ye etikalaka na eloko moko te,
mpe fofolo* Basalelaka fofolo mpo na kopelisa moto makasi. ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango.
16 Misisa na ye ekawukaka na se ya mabele,
mpe, na likolo, bitape na ye elembaka.
17 Bakanisaka ye lisusu te na mokili,
kombo na ye etangamaka lisusu te na mabele.
18 Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili,
mpe balongolaka ye na mokili.
19 Azalaka na bana to bakitani te kati na bato na ye,
azalaka ata na moto moko te oyo atikala na bomoi,
na esika oyo avandaka.
20 Bato ya weste bazalaka na somo ya kotala bomoi na ye,
mpe bato ya este batondaka na kobanga.
21 Tala, solo, ndenge suka ya moto mabe ezalaka,
mpe bomoi ya moto oyo ayebi Nzambe te. »

*18:15 Basalelaka fofolo mpo na kopelisa moto makasi.