21
Eyano ya Yobo epai ya Tsofari
Yobo azongisaki :
« Yoka na bokebi maloba na ngai,
mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai.
Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba ;
soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai.
 
Boni, nazali kolela epai ya moto ?
Ndenge nini nalemba te kokanga motema ?
Botala ngai, bokokamwa,
bokozanga ata likambo ya koloba.
Soki kaka nakanisi yango, nabangi,
mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo.
 
Mpo na nini bato mabe bazali kowumela na bomoi ?
Mpo na nini bakomaka mibange
mpe babakisaka nguya na bango ?
Bana na bango bazali kolendisama pembeni na bango,
mpe bakitani na bango bazali kofuluka na miso na bango.
Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga,
fimbu na Nzambe ezali likolo na bango te.
10 Bangombe na bango ya mibali elembaka te kobotisa,
bangombe na bango ya basi ebotaka kaka
mpe esopaka zemi te.
11 Lokola kati na etonga ya bameme,
bazali kotika bana na bango : bamoko kokima-kima,
mpe bamosusu kosakana.
12 Bazali kobeta mbonda mpe lindanda,
bazali kosepela na lokito ya flite ;
13 bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo,
mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia.
 
14 Nzokande, balobaka na Nzambe : ‹ Longwa mosika na biso !
Tozali na posa te ya koyeba nzela na yo.
15 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani
mpo ete tosalela ye ?
Tokozwa litomba nini na kosambela ye ? ›
16 Boni, bozwi na bango ezali
kati na maboko na bango moko te ?
Kasi mosika na ngai, likanisi ya kolanda toli ya bato mabe !
 
17 Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ?
Mbala boni pasi ezali kokitela bango ?
Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?
18 Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango
lokola makasa to matiti ya kokawuka ?
19 Balobaka : ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe
epai ya bana na ye. ›
Tika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe,
mpo ete ayeba yango !
20 Tika ete miso na ye moko emona kobebisama na ye,
mpe amela kopo ya kanda ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
21 Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini
tango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka ?
 
22 Bakoki solo koyekolisa Nzambe mayele,
Ye oyo asambisaka ezala bato oyo baleki kotombolama ?
23 Moko azali kokufa na makasi na ye nyonso,
na kimia nyonso mpe na pasi ata moko te,
24 na nzoto sembesembe,
mpe na mikuwa etonda na mafuta ;
25 mosusu azali kokufa na mawa na motema,
atikali ata komeka kosepela na bomengo te.
26 Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko
na se ya mabele,
mpe bankusu ekozipa bango.
 
27 Solo, nayebi malamu makanisi
mpe mabongisi na bino, mpo na kotelemela ngai ;
28 bolobaka : ‹ Wapi ndako ya mozwi ?
Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda ? ›
29 Botunaki mituna wana te epai ya baleki nzela ?
Bobosani makambo oyo bayebisaki bino,
30 ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi,
akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.
31 Nani, na miso ya moto mabe, apamelaka etamboli na ye ?
Nani azongiselaka ye makambo oyo asalaka ?
32 Bamemaka ye na lilita,
mpe bakengelaka kunda na ye.
33 Mabele ya lubwaku ezalaka malamu mpo na ye ;
bato nyonso batambolaka sima na ye na molongo,
mpe bato ebele penza batambolaka liboso na ye.
 
34 Boye, mpo na nini bozali komitungisa
mpo na kobondisa ngai ?
Pamba te kati na biyano na bino, etikali kaka lokuta. »