22
Maloba ya misato ya Elifazi
Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
« Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ?
Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba
kaka mpo na ye moko.
Ezala soki ozali moyengebene,
litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa,
ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo ?
 
Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo
nde azali kopamela yo mpe kosambisa yo ?
Mabe na yo ezali monene te ?
Masumu na yo eleki ndelo te ?
Ozalaki koluka na pamba ndanga
epai ya bandeko na yo ya mibali,
ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu,
ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi,
mpe ozalaki kopimela moto oyo azalaki na nzala bilei,
atako ozalaki moto monene, nkolo mabele,
mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu ;
ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba,
mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike.
10 Yango wana, mitambo ezingeli yo,
kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo,
11 molili makasi ezwi yo mpe ozali kokoka komona te,
mpe mpela ezipi yo.
 
12 Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola ?
Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka !
13 Nzokande, ozali koloba : ‹ Nzambe ayebi nini ?
Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye ? ›
14 Mapata minene ezipi Ye,
yango wana azali komona biso te,
wana azali kotambola-tambola na etando ya Lola ?
15 Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala,
nzela oyo bato mabe balekelaki ?
16 Kufa ememaki bango na mbalakata,
mpe miboko na bango etiolaki na mpela.
17 Bazalaki koloba na Nzambe : ‹ Tika biso, biso moko !
Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini ? ›
18 Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango
na biloko ya kitoko.
Yango wana, ngai, naboyaka toli ya bato mabe.
19 Bato ya sembo bazali komona kobebisama na bango
mpe bazali kosepela,
bayengebene bazali koseka bango mpe bazali koloba :
20 ‹ Solo, banguna na biso babebi,
moto ezikisi bomengo na bango. ›
 
21 Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia.
Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo.
22 Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye,
mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo.
23 Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
soki obengani mabe mosika ya ndako na yo,
bomengo na yo ekozongela yo.
24 Bwaka wolo na yo kati na putulu,
wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku ;
25 bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo,
mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo.
26 Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe.
27 Okosambela Ye, Ye akoyoka yo,
mpe okokokisa ndayi na yo.
28 Makambo oyo okokana, ekosalema,
mpe pole ekongenga na nzela na yo.
29 Soki bato balembi, mpe yo olobi : ‹ Telema ! ›
Nzambe akobikisa bango,
30 akokangola ata moto oyo asali mabe,
akokangola ye penza mpo na bopeto ya maboko na yo. »