23
Eyano ya Yobo
Yobo azongisaki :
« Lelo lisusu, kolela na ngai ezali bololo,
loboko oyo ezali likolo na ngai eleki
kolela ya motema na ngai na kilo.
Soki nayebaki esika nini nakoki komona Nzambe,
nalingaki kokoma liboso ya kiti ya bokonzi na Ye,
nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso,
likambo na ngai liboso na Ye,
mpe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo,
nalingaki koyeba biyano oyo alingaki kopesa ngai,
mpe kososola makambo oyo alingaki koloba na ngai.
Boni, alingaki kosalela nguya na Ye
mpo na kosamba na ngai ?
Te, alingaki kutu koyokela ngai mawa !
Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye
likambo na ngai,
mpe nakokangolama libela
wuta na maboko ya mosambisi na ngai.
 
Soki nakeyi na ngambo ya este, azali kuna te ;
soki nakeyi na ngambo ya weste, nazali komona Ye te.
Tango azali na mosala na ngambo ya nor,
nazali komona Ye te,
tango azali kobaluka na ngambo ya sude,
nazali komona Ye ata moke te.
10 Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ;
soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.
11 Makolo na ngai elandaki matambe na Ye ;
natambolaki na nzela na Ye
mpe natikalaki kopengwa na yango te.
12 Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ;
nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko,
koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.
 
13 Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye ;
nani akoki kotelemela Ye ?
Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.
14 Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai
mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa.
15 Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi ;
mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso,
nazali kobanga Ye.
16 Nzambe alembisi ngai,
Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai.
17 Atako bongo, molili to molili makasi oyo ezingeli ngai
ekangi ngai monoko te.