25
Maloba ya misato ya Bilidadi 
  1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :   
 2 « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ;  
atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.   
 3 Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ?  
Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?   
 4 Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ?  
Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?   
 5 Soki kutu sanza ezali kongenga te,  
mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,   
 6 toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi,  
mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »