26
Eyano na Yobo epai ya Bilidadi
Yobo azongisaki :
« Ah ! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi,
ndenge osungi loboko oyo elembi !
Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya,
mpe tala ebele na mayele oyo olakisi !
Ozwi maloba oyo wapi ?
Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ?
 
Bakufi balengaka na se ya mayi
mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.
Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu,
mpe libulu ya molili ezali polele.
Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te,
atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,
akangaka mayi kati na mapata,
kasi mapata epasukaka te ;
azipaka kiti ya bokonzi na Ye,
atandaka mapata na likolo na yango ;
10 akataka mondelo na likolo ya mayi,
na suka ya pole mpe na molili.
11 Makonzi ya Lola ezali kolenga
mpe ezali kokamwa na pamela na Ye.
12 Na nguya na Ye, apasoli ebale monene ;
mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni.
13 Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko,
loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.
14 Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke
ya misala na Ye
mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka,
nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »