32
Maloba ya liboso ya Eliwu
Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko. Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe. Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli ; nzokande bakweyisaki Nzambe. Eliwu awelaki te koloba moto ya liboso epai ya Yobo, pamba te baninga wana misato ya Yobo bazalaki mikolo na ye na mibu ya mbotama. Kasi tango Eliwu amonaki ete bato wana misato bazali lisusu na likambo ya koloba te, asilikaki makasi.
Boye Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi, alobaki :
« Nazali leki na mibu ya mbotama, mpe bino bozali mikolo ;
yango wana nazalaki kobanga
mpe nazangaki makasi ya koloba na bino
makambo oyo ngai nayebi.
Nazalaki komilobela :
‹ Bato oyo bazali na mibu ebele ya mbotama bakoyeba koloba,
pamba te kozala na mibu ebele epesaka bwanya. ›
Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo,
ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
nde epesaka moto boyebi.
Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya,
mpe ezali kaka bampaka te nde basosolaka makambo oyo ezali sembo.
 
10 Yango wana nalobi : Boyoka ngai,
ngai mpe nakoloba na bino makambo oyo nayebi.
11 Tango bino bozalaki koloba, ngai nazalaki koloba te,
nazalaki koyoka makanisi na bino,
wana bozalaki koluka makambo ya koloba.
12 Nalandaki bino na bokebi nyonso ;
moko te kati na bino amoni mabe ya Yobo,
moko te kati na bino alongi makanisi ya Yobo.
13 Boloba te : ‹ Tomoni bwanya ;
Nzambe kaka nde akoki kolonga ye, kasi moto te. ›
14 Lokola Yobo alobaki maloba na ye epai na ngai te,
ngai mpe nakosalela makanisi na bino te
mpo na kozongisela ye eyano.
 
15 Bayoki soni, batikali ata na liloba moko te ya koloba,
makambo ya koloba esili bango na minoko !
16 Boni, nasengeli sik’oyo kozela,
awa bazangi maloba to basuki wana mpe bakangi minoko ?
17 Ngai mpe nakoloba sik’oyo,
nakoloba makambo oyo nayebi.
18 Lokola maloba ebele etondi kati na ngai,
motema na ngai ezali kopela lokola moto.
19 Kati na ngai, nazali lokola mbeki ya vino oyo ezali kotoka,
lokola mbeki ya vino ya sika oyo ekomi pene ya kopasuka.
20 Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita,
nakofungola bibebu na ngai mpo ete nayanola.
21 Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te ;
22 pamba te, soki nayebaki kobondela bato,
Mokeli na ngai alingaki kolongola ngai mbala moko.