33
Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai,
tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai !
Tala, nafungoli monoko na ngai,
maloba na ngai ezali na songe ya lolemo.
Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo,
bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.
Molimo ya Nzambe asalaki ngai,
pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi.
Boye soki okoki, yanola ngai,
mibongisa mpo na komekana na ngai.
Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe ;
ngai mpe nawutaki na putulu.
Boye, somo na ngai ebangisa yo te,
mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te.
 
Kasi olobaki na matoyi na ngai—
mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo—
‹ Nazali sembo, nasali masumu te ;
nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›
10 Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai,
azali kozwa ngai lokola monguna na Ye.
11 Akangi makolo na ngai na bibende,
azali kononga banzela na ngai nyonso.
 
12 Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te,
pamba te Nzambe azali monene koleka moto.
13 Mpo na nini ozali kosamba na Ye ?
Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.
14 Nzokande, Nzambe alobaka, na lolenge moko to na lolenge mosusu,
kasi moto asosolaka yango te.
15 Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu,
tango bato bazwaka pongi makasi
wana balali na mbeto ;
16 boye, akoki kofungola matoyi ya bato
mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba,
17 mpo na kotia moto mosika ya misala na ye ya mabe
mpe kobatela ye na lolendo,
18 mpo na kobatela molimo na ye mpo ete ekufa te,
mpe bomoi na ye mpo ete ebebisama te na mopanga.
 
19 Nzokande, moto akoki mpe, mbala mosusu, koteyama na mbeto na ye,
na nzela ya kobela mpe ya minyoko ya tango nyonso
kati na mikuwa na ye.
20 Boye, azali kosepela lisusu na lipa te,
mpe motema na ye ekomi koboya bilei oyo alingaka mingi.
21 Nzoto na ye ekawuki na pamba,
mpe mikuwa na ye, oyo ebombama, ebimi.
22 Molimo na ye ezali kopusana pene ya kunda,
mpe bomoi na ye, pene ya bamemi sango ya kufa.
23 Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko,
kati na ba-anjelu nkoto moko,
mpo na koyebisa na moto makambo oyo ezali sembo,
24 tika ete asalela ye ngolu mpe aloba :
‹ Bikisa ye ete akota te kati na libulu ya kufa,
nasili kofuta niongo mpo na kosikola ye, ›
25 nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe
lokola na tango ya bolenge na ye,
ekozonga ndenge ezalaki na bomwana na ye.
26 Akosambela Nzambe,
akozwa ngolu na miso na Ye,
akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo.
Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo.
27 Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba :
‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te,
kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.
28 Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa,
mpe nakowumela kati na pole na esengo. ›
 
29 Nzambe asalaka makambo oyo nyonso
epai ya moto mbala mibale to mpe mbala misato,
30 mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa,
mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye.
 
31 Yobo, fungola matoyi, vanda kimia mpe yoka ngai !
Nazali na makambo ya koloba na yo.
32 Kasi soki ozali na likambo ya koloba,
yebisa ngai yango, pesa ngai eyano,
mpe ngai nakolongisa yo.
33 Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai,
mpe ngai nakoteya yo bwanya. »