34
Eliwu azwaki maloba mpe alobaki :
« Bino bato ya bwanya, boyoka maloba na ngai ;
bino bato ya mayele, boyoka ngai !
Pamba te litoyi nde esosolaka maloba
ndenge lolemo emekaka bilei.
Tososola mpo na biso moko makambo ya sembo,
toyekola elongo makambo oyo ezali malamu.
 
Tala makambo oyo Yobo azali koloba : ‹ Nasali mabe te,
kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai.
Atako nazali sembo,
bazali kozwa ngai lokola mokosi ;
atako nasali mabe te,
likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. ›
Nani azali lokola Yobo,
oyo amelaka kotiolama lokola mayi ?
Atambolaka elongo na banyokoli ya bato,
asanganaka na bato mabe.
Pamba te alobi : ‹ Ezali na litomba te epai na moto,
na koluka kosepelisa Nzambe. ›
 
10 Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai !
Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ;
ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala
makambo oyo ezangi bosembo.
11 Azongiselaka moto na moto kolanda misala na ye,
apesaka na moto na moto kolanda etamboli na ye.
12 Te, Nzambe akoki kosala mabe te,
Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kobuka bosembo te.
13 Nani akomisaki Ye Mokonzi ya mokili ?
Nani apesaki Ye bokonzi likolo ya mokili mobimba ?
14 Soki Nzambe azalaki kaka kokanisa mpo na Ye moko,
mpe soki abatelaki kati na Ye moko
molimo na Ye mpe pema na Ye,
15 bato nyonso balingaki kokufa elongo,
mpe moto nyonso alingaki kozonga putulu.
 
16 Soki ozali na boyebi, yoka maloba oyo ;
yoka makambo oyo nazali koloba.
17 Boni, moto oyo ayinaka bosembo
akoki solo kozala mokonzi ?
Okokweyisa solo Nkolo-Na-Bosembo
mpe Nkolo-Na-Nguya ?
18 Ezali Ye nde alobaka na bakonzi : ‹ Bozali bato pamba, ›
mpe na bato ya lokumu : ‹ Bozali bato mabe ? ›
19 Aponaka bilongi ya bakambi te,
mpe asalelaka bazwi bolamu te
mpo na bozwi na bango koleka babola,
pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.
20 Bato bazali kokufa mbala moko, kati na butu ;
bazali kobunda-bunda mpe kolimwa,
bato ya nguya bazali kolongwa
atako loboko ya moto etindiki bango te.
 
21 Miso na Ye ezali likolo ya banzela ya bato,
amonaka etamboli na bango nyonso.
22 Ezala molili, ezala libulu ya kufa,
eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.
23 Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te
mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama.
24 Abomaka bato ya makasi ata soki aluki koyeba tina te
mpe atiaka bato mosusu na esika na bango.
25 Pamba te ayebi misala na bango,
akweyisi bango na butu moko, mpe babebisami.
26 Apesaka bango etumbu lokola bato mabe
na esika oyo bato nyonso bakoki komona,
27 pamba te baboyaki kolanda Ye
mpe kososola banzela na Ye.
28 Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe,
mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye.
 
29 Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye ?
Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye ?
Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato
30 mpo na kopekisa bato mabe ete bakamba mokili te
mpe batiela bato mitambo te.
 
31 Soki moto moko alobi na Nzambe : ‹ Nasali mabe,
nazwi etumbu ya masumu na ngai,
kasi nakosala lisusu mabe te.
32 Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te ;
soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›
33 Boni, Nzambe akoki kopesa yo etumbu ?
Nayebi ete ondimi na yo te.
Yo nde osengeli kozwa mokano, kasi ngai te !
Yebisa ngai makambo oyo yo oyebi.
 
34 Bato ya mayele mpe bato ya bwanya
oyo bazali koyoka ngai balobaki :
35 ‹ Yobo azali koloba na boyebi te,
maloba na ye ezali na tina te. ›
36 Oh ! Tika ete Yobo asambisama kino na suka
mpo ete apesa biyano lokola moto mabe !
37 Pamba te, na lisumu na ye, azali kobakisa kotomboka,
azali kotia tembe kati na biso
mpe azali kokoba kobakisa maloba
mpo na kotelemela Nzambe. »