35
Bongo Eliwu alobaki :
« Boni, okanisi ete yango ezali sembo ?
Olobi : ‹ Nazali sembo liboso ya Nzambe. ›
Nzokande, ozali koloba : ‹ Nakozwa nini,
litomba nini nakozwa soki nasali masumu te ? ›
 
Nalingi kopesa yo eyano,
yo elongo na baninga na yo.
Tombola miso na likolo mpe tala ;
mona ndenge mapata ezali likolo na yo.
Soki osali masumu,
ekosala Nzambe nini ?
Soki masumu na yo ezali ebele,
ekosala Ye nini ?
Soki ozali sembo, okopesa Ye nini
to akozwa nini na loboko na yo ?
Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo,
bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato.
 
Bato bazali kolela na se ya mokumba ya minyoko,
bazali koganga na se ya motema makasi ya bato minene.
10 Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mokeli na ngai,
Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,
11 Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili
mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo,
azali wapi ? ›
12 Ata bagangi, Nzambe akoyanola te,
mpo na lolendo ya bato mabe.
13 Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba,
Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te.
14 Nzokande, yo ozali komeka koloba ete ozali komona Ye te,
ete ozwi nanu eyano te na kolela na yo epai na Ye.
15 Mpe sik’oyo, soki kanda ya Nzambe eyei nanu likolo na yo te
mpe soki Ye azali nanu kobosana maloba na yo ya soni,
16 elingi koloba ete yo, Yobo, ofungoli monoko na yo kaka na pamba
mpe otondisi yango na maloba ya bozoba. »