38
Yawe ayanoli Yobo
Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi :
« Nani azali kobebisa mabongisi na ngai
na maloba ezanga tina ?
Lata mokaba na yo lokola elombe mobali ;
nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai.
 
Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ?
Yebisa ngai soki ozali mayele.
Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye ?
Nani amekaki molayi na yango na singa ?
Makolo ya makonzi na yango evandi likolo ya nini ?
Nani atiaki libanga na yango ya songe,
tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo
mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ?
 
Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi
tango yango ebimaki wuta na mabele,
tango nakomisaki mapata elamba na yango,
mpe molili, singa ya kokangela yango,
10 tango natielaki yango bandelo,
tango natielaki yango bikuke ya makasi,
11 tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ;
awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? ›
 
12 Boni, osili kopesa tongo mitindo
to osili kolakisa tongo-tongo esika na yango,
13 mpo ete esimba bandelo ya mokili
mpe ebimisa bato mabe ?
14 Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe,
mpe nyonso emonani lokola elatisami elamba.
15 Bazangisi bato mabe pole
mpe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe.
 
16 Osila kokoma kino na etima ya ebale monene ?
Osila kotambola na se ya libulu ya molili ?
17 Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa ?
Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa ?
18 Miso na yo esila komona kino na bitando monene ya mokili ?
Loba yango soki oyebi makambo oyo nyonso.
 
19 Wapi nzela oyo ememaka na pole ?
Bongo molili ezalaka wapi
20 mpo ete omema yango na bisika na yango
mpe oyeba banzela oyo ememaka na esika oyo evandaka ?
21 Solo, oyebi yango malamu,
pamba te osilaki kobotama
mpe motuya ya mikolo na yo ezali ebele.
 
22 Boni, osila kokoma na esika
oyo babombaka mvula ya pembe
mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga ?
23 Nabombaki yango mpo na tango ya pasi
mpe mpo na mikolo ya bitumba.
24 Na nzela nini pole ebimaka
mpe mopepe ya ngambo ya este epanzanaka ?
25 Nani atimola nzela mpo na mvula makasi,
nani apasola nzela mpo na mokalikali ya bakake
26 mpo na konokisa mvula na esika oyo ezanga bato,
na esika ya esobe oyo bato bavandaka te,
27 mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka,
mpe mpo na kobotisa matiti ya mobesu ?
28 Boni, mvula ezali nde na tata ?
Nani abotaki matanga ya mamwe ?
29 Libumu ya nani ebotaki mayi ya libanga ?
Nani abotaki londende oyo ewutaka na likolo ?
30 Tango nini mayi ekomaka libanga
mpe likolo ya mayi ya mozindo ekomaka libanga ?
 
31 Okoki kokanga na singa Minzoto sambo esika moko
to kofungola basinga ya Minzoto minei ?
32 Okoki kobimisa bilembo ya Zodiake* Zodiake : na lifalanse ezali « Zodiaque ; » elakisi : liboke ya minzoto oyo emonanaka lokola bilembo na likolo mpo na kolakisa makambo oyo ekoya. na tango na yango
mpe kokamba Ngombolo elongo na bana na yango ?
33 Oyebi mibeko ya likolo ?
Okolonga kokokisa bokonzi na yango na mokili ?
 
34 Okoki kotombola mongongo na yo na mapata
mpo ete mayi ebele ezipa yo ?
35 Okoki kotinda bakake ete ebima na banzela na yango
mpe eloba na yo : ‹ Tala biso oyo ? ›
36 Nani atia bwanya na motema ya moto
to nani apesa soso mayele ?
37 Nani azali na bwanya mpo na kotanga mapata
mpe kosopa mayi ya nzungu ya likolo
38 mpo ete putulu etiola elongo lokola ebende oyo enyangolami na moto
mpe mpo ete maboke ya mabele ekangama esika moko ?
 
39 Boni, yo nde okokoka koboma nyama mpo na nkosi ya mwasi
mpe kosilisa nzala ya bana na yango
40 tango elalaka kati na mabulu na yango
mpe emilengelaka na se ya banzete ya makasa ebele ?
41 Nani abongiselaka yanganga bilei
tango bana na yango egangaka epai ya Nzambe
mpe tango eyengaka-yengaka mpo na kozanga bilei ?
 

*38:32 Zodiake : na lifalanse ezali « Zodiaque ; » elakisi : liboke ya minzoto oyo emonanaka lokola bilembo na likolo mpo na kolakisa makambo oyo ekoya.