39
Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka ?
Osila komona ndenge mboloko ebotaka ?
Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi ?
Oyebi tango oyo ebotaka ?
Ekogumbama, ekobota bana na yango
mpe ekolongwa na pasi na yango ya kobota.
Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda,
ekokende mosika mpe ekozonga lisusu te.
 
Nani akangoli ane ya zamba ?
Nani apesi yango bonsomi ?
Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako,
mpe mabele ya mungwa lokola esika ya kovanda.
Esekaka makelele ya bingumba
mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda.
Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei
mpe elukaka na bokebi matiti nyonso ya mobesu.
 
Mpakasa ekoki kondima kosalela yo ?
Ekoki kolekisa butu na elielo na yo ya banyama ?
10 Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele ?
Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele ?
11 Okotia solo elikya na yo kati na yango,
mpo ete makasi na yango ezali monene ?
Okotikela yango mosala na yo ?
12 Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma
mpe kosangisa yango na etutelo na yo ?
 
13 Mapapu ya maligbanga* Maligbanga ezali ndeke monene ya esobe oyo epotaka mbangu makasi, bakilometele nkama moko na tuku mibale mpo na ngonga moko. Ebengami na lifalanse autriche. efungwamaka na esengo nyonso,
kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi Nkongi ezali ndeke ya monoko molayi oyo eyembaka kitoko mpe ebengami na lifalanse Cigogne. ?
14 Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele
mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele,
15 kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango
mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango.
16 Enyokolaka bana na yango makasi
lokola nde ezali bana na yango te,
emonaka na yango motema pasi te
lokola nde esali mosala ya mpunda,
17 pamba te Nzambe apimeli yango bwanya
mpe apesi yango mayele te.
18 Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu,
ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango.
 
19 Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi
mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi ?
20 Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki ?
Lolendo ya mongongo kitoko na yango epesaka somo.
21 Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele,
esepelaka na makasi na yango
mpe ekendaka liboso ya bibundeli.
22 Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te,
ezongaka sima te liboso ya mopanga,
23 tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango
elongo na likonga oyo ezali kopela moto mpe mopanga.
24 Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele,
evandaka kimia te soki kelelo ebeti.
25 Soki kelelo ebeti, egangaka : ‹ Ah ! ›
Na mosika, eyokaka solo ya bitumba,
koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba.
 
26 Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka
mpe etandaka mapapu na yango na ngambo ya sude ?
27 Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo
mpe esalaka zala na yango na likolo ?
28 Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga,
na esika ya kaka, na songe ya libanga.
29 Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia,
miso na yango emonaka na mosika.
30 Bana na yango emelaka makila.
Esika ebembe ezali, mpongo ezali wana. »

*39:13 Maligbanga ezali ndeke monene ya esobe oyo epotaka mbangu makasi, bakilometele nkama moko na tuku mibale mpo na ngonga moko. Ebengami na lifalanse autriche.

39:13 Nkongi ezali ndeke ya monoko molayi oyo eyembaka kitoko mpe ebengami na lifalanse Cigogne.