40
Eyano ya liboso ya Yobo epai ya Nzambe
Yawe ayanolaki Yobo :
« Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
akoki koteya Ye ?
Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! »
Yobo azongiselaki Yawe :
« Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba,
eyano nini nakoki kopesa Yo ?
Natie loboko na ngai na monoko.
Nalobaki mbala moko,
kasi nakoyanola lisusu te ;
na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. »
Maloba ya mibale ya Nzambe
Yawe alobaki na Yobo wuta na mopepe makasi :
« Kanga mokaba na loketo na yo lokola elombe mobali ;
nakotuna yo mituna, mpe okoyanola ngai.
 
Olingi kotiola bosembo na ngai ?
Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?
Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ?
Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?
10 Lata nkembo mpe kongenga,
milatisa lokumu mpe monene !
11 Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato,
tala bato nyonso ya lolendo liboso na yo
mpe kitisa bango !
12 Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni !
Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali.
13 Kunda bango nyonso kati na putulu,
zipa bilongi na bango na esika ya kobombama.
14 Boye, ngai moko nakopesa yo lokumu,
pamba te loboko na yo ya mobali ekoki mpo na kobikisa yo.
 
15 Tala ngubu : nakelaki yango ndenge nakelaki yo,
kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe.
16 Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango,
nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango !
17 Ekembisaka mokila na yango lokola nzete ya sedele ;
misisa ya mipende na yango elingama-lingama ;
18 mikuwa na yango ezali lokola bibende ya bronze ;
mipanzi na yango ezali lokola biteni ya bibende.
19 Ezali ekelamu ya liboso ya Nzambe,
kasi Mokeli na yango atieli yango mopanga pene.
20 Ngomba ezali kopesa yango matiti ya kolia,
esika oyo banyama nyonso ya zamba esakanaka.
21 Elalaka na se ya banzete ya mike-mike,
na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto.
22 Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango,
banzete ya pepiliye ezingeli yango.
23 Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te ;
ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko,
evandaka kaka kimia.
24 Boni, moto akoki kokanga yango
na motambo na tango ezali kotala
to kotobola yango zolo na ndobo,
mpo na kobenda yango ?
 
25 Boni, okoki koloba ngando na ndobo ?
Okoki kokanga lolemo na yango na singa ?
26 Okoki kokanga yango singa ya kekele na zolo ?
Okoki kotobola mbanga na yango na ndobo ?
27 Boni, ekobondela yo mingi ?
Ekoloba na yo maloba ya boboto ?
28 Ekoki kosala boyokani elongo na yo
mpo ete ekoma mowumbu na yo mpo na libela ?
29 Okoki kosakana na yango lokola ndeke ?
Okoki kokanga yango na singa
mpo na kosepelisa bana na yo ya basi ?
30 Boni, lisanga ya balobi mbisi bakoki kosala na yango mombongo ?
Bakoki kokabola yango epai ya bateki ?
31 Okoki kotobola mokongo na yango na makonga ?
Okoki kotobola moto na yango na ndobo
oyo bakangelaka bambisi ?
32 Tia loboko na yo na likolo na yango :
soki okanisi etumba oyo okutani na yango,
okozongela lisusu te kotia loboko na yo na likolo na yango.