41
Liboso ya ngando yango, elikya nyonso ya kolonga ekomaka pamba ;
soki kaka omoni yango, okweyi na somo.
Moto moko te ya tembe akoki kotungisa yango ;
boye nani akoki kotelemela ngai ?
Nani adefisaki ngai eloko
mpo ete nafuta niongo na ye ?
Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai.
 
Nakoki kokanga monoko te mpo na kozanga kolobela
biteni na yango ya nzoto, makasi na yango
mpe kitoko ya nzoto na yango.
Nani asila kolongola ngando poso na yango ya nzoto ?
Nani asila kokatisa kati-kati ya milongo mibale ya minu na yango ?
Nani asila kofungola bibebu ya monoko na yango ?
Minu na yango etonda na somo.
Mokongo na yango esalema na milongo mibale ya nguba,
ekangama elongo na ezipelo ya mabanga.
Ekangama moko na mosusu,
mpe mopepe ekoki koleka kati na yango te.
Ekangama moko na mosusu,
esimbama elongo mpe ekoki kokabwana te.
10 Soki ekosoli, zolo na yango ekobimisa pole ;
mbuma ya miso na yango ezali lokola moyi ya tongo.
11 Moto makasi mpe moto mike-mike
ebimaka na monoko na yango.
12 Milinga ebimaka na zolo na yango
lokola na mbeki oyo ezali kotoka
to lokola nzungu ya ebende ya moto.
13 Pema na yango epelisaka makala ya moto,
lolemo ya moto ebimaka na monoko na yango.
14 Makasi na yango evandi na kingo na yango,
mpe somo ebimaka liboso na yango.
15 Masusa ya poso ya nzoto na yango ekangama elongo,
elendisama makasi mpe eninganaka te.
16 Motema na yango ezali makasi lokola libanga,
makasi lokola libanga oyo banikelaka bambuma.
17 Soki etelemi, bato ya makasi babangaka,
mpe somo ekimisaka bango.
18 Soki obeti yango ezala mopanga, likonga to mbeli,
ekosala yango eloko te.
19 Emonaka ebende lokola lititi,
bronze lokola nzete epola.
20 Mbanzi ekimisaka yango te,
mpe mabanga oyo babwakaka na nzela ya ebambelo mabanga
ezali lokola poso ya loso mpo na yango.
21 Makonga ezali lokola matiti mpo na yango,
mpe esekaka makelele ya makonga mike-mike.
22 Se ya libumu na yango etonda na banzube,
etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele.
23 Eningisaka mayi ya mozindo lokola mayi
oyo ezali kotoka na nzungu,
ekomisaka ebale monene lokola nzungu
oyo batokiselaka malasi.
24 Engengisaka nzela na sima na yango
lokola suki ya pembe likolo ya mayi.
25 Na mokili, nyama moko te ekokani na yango ;
mpe ebangaka te.
26 Ebangaka te kobundisa banyama minene,
ezali mokonzi ya banyama nyonso ya lolendo. »