42
Eyano ya mibale ya Yobo
Yobo azongiselaki Yawe :
« Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso ;
eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.
Olobaki : ‹ Nani akoki komema molili na mabongisi na Ngai,
na nzela ya maloba na ye, oyo ezanga tina ? ›
Solo, nazalaki kolobela makambo oyo nayebaki te,
makambo ya kokamwa penza mpo na ngai,
makambo oyo nasosolaki te.
 
Olobaki na ngai : ‹ Yaka sik’oyo, nalingi koloba ;
nalingi kotuna yo motuna,
bongo okopesa ngai eyano. ›
Matoyi na ngai eyokaki makambo
oyo bazalaki koloba na tina na Yo ;
kasi sik’oyo, miso na ngai emoni Yo.
Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa
mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele
mpe na putulu ya moto. »
Maloba ya suka
Sima na Yawe koloba makambo oyo epai ya Yobo, alobaki na Elifazi, moto ya Temani : « Kanda na Ngai engaleli yo mpe baninga na yo mibale, pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. Kasi sik’oyo, bokamata bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali ; bokende epai ya Yobo, mosali na Ngai, botumba mbeka mpo na bino moko. Yobo, mosali na Ngai, akobondela mpo na bino ; mpe mpo na kondima na ye, nakoyamba libondeli na ye mpo ete nasalela bino te kolanda bozoba na bino. Pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. »
Boye Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa, mpe Tsofari, moto ya Naama, basalaki makambo oyo Yawe atindaki bango kosala ; mpe Yawe ayambaki libondeli ya Yobo.
10 Sima na Yobo kosambela mpo na baninga na ye, Yawe atalisaki ye lisusu bolamu mpe apesaki ye bomengo mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso. 11 Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.
12 Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko. 13 Azalaki na bana mibali sambo mpe bana basi misato. 14 Mwana na ye ya liboso ya mwasi, Yemima ; ya mibale, Ketsia ; mpe ya misato, Kereni-Apuki. 15 Kati na mokili mobimba, ezalaki te na basi kitoko koleka bana basi ya Yobo. Tata na bango apesaki bango libula ndenge moko na bandeko na bango ya mibali.
 
16 Sima na yango, Yobo awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na tuku minei ; amonaki bana na ye mpe bakitani na ye kino na molongo ya minei. 17 Mpe Yobo akufaki na kimobange makasi mpe atondaki na mikolo.