Banzembo
Buku ya liboso
1
Nz 1.1–41.14
Mibeko ya Yawe ezali etima ya mapamboli
Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe,
atelemaka te na nzela ya bato ya masumu,
mpe avandaka te esika moko na batioli,
kasi asepelaka na mibeko ya Yawe
mpe akanisaka yango butu mpe moyi.
Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi,
oyo ebotaka mbuma na eleko na yango,
mpe makasa na yango ekawukaka te ;
misala na ye nyonso etambolaka malamu.
 
Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe !
Bazali lokola matiti ya kokawuka
oyo mopepe epanzaka.
Yango wana bato mabe bakolonga te
kotelema na kosambisama,
mpe bato ya masumu bakowumelaka te
kati na lisanga ya bato ya sembo.
 
Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo,
kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.