Nzembo 2
Yawe abulisi Mokonzi
Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele
mpe bato bazali kosala makita ya pamba ?
Bakonzi ya mokili batomboki,
mpe bakambi basangani
mpo na kotelemela Yawe
elongo na mopakolami na Ye.
Bazali koganga elongo :
« Tokata minyololo na bango
mpe tomikangola na bokonzi na bango ! »
 
Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi
kuna na likolo aseki,
Yawe atioli bango.
Agangeli bango na kanda,
apelisi kanda makasi na Ye mpo na bango, alobi :
« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai
na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »
Nakosakola mobeko ya Yawe.
Alobaki na ngai : « Ozali Mwana na Ngai ya mobali,
na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo.
Senga Ngai,
mpe nakokomisa bikolo libula na Yo,
basuka ya mokili bozwi na Yo.
Okoyangela yango na bokonzi ya ebende,
okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »
 
10 Yango wana, bino bakonzi, bozala na mayele ;
bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo.
11 Bosalela Yawe na kobanga
mpe bosepela na kolenga.
12 Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika
mpe bokokufa na nzela na bino,
pamba te kanda na Ye epelaka noki.
Esengo na bato oyo bazwaka Ye
lokola ebombamelo na bango.