Nzembo 3
Yawe Abikisaka
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.
Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni !
Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !
Ebele bazali koloba na tina na ngai :
« Nzambe akobikisa ye te ! »
 
Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai,
Yo nde omatisaka lokumu na ngai.
Nabelelaka Yawe,
mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.
 
Nalalaka mpe nazwaka pongi ;
nalamukaka lisusu,
pamba te Yawe azali makasi na ngai.
Nakobanga te atako ebele ya bankoto
bazingeli ngai na bangambo nyonso.
 
Yawe, telema !
Nzambe na ngai, kangola ngai !
Beta banguna na ngai nyonso bambata,
buka bato mabe minu.
 
Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe.
Tika ete lipamboli na Yo ewumela
kati na bato na Yo.