Nzembo ya misato ya mawa : elikya atako pasi
3
Pasi ya mosakoli
Nazali moto oyo amona pasi
na nzela ya fimbu ya kanda na Ye.
Amemaki ngai mpe atambolisaki ngai
kati na molili, kasi na pole te.
Solo, mokolo mobimba,
azalaki kobalola loboko na Ye
mpo na kotelemela ngai tango nyonso.
 
Abebisaki nzoto na ngai mpe poso na yango,
abukaki mikuwa na ngai.
Mpo na kotelemela ngai,
atongaki zingazinga na ngai
mir ya ngenge mpe ya pasi.
Atongelaki ngai ndako ya kovanda kati na molili,
lokola bato ya tango ya kala oyo bakufa.
 
Azingelaki ngai na bamir mpo ete nakima te ;
akangaki ngai na minyololo ya kilo.
Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi,
azali koyoka libondeli na ngai te.
Akangaki nzela na ngai na mabanga minene
mpe abebisaki banzela na ngai ya mike.
 
10 Azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ebongami,
lokola nkosi oyo ebombameli ngai ;
11 apengwisaki ngai nzela,
apasolaki ngai mpe akomisaki ngai eloko ya pamba.
12 Abendaki tolotolo na Ye
mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga.
 
13 Atobolaki motema na ngai,
na makonga oyo ewutaki na libenga na Ye.
14 Nakomaki eloko ya liseki
na miso ya bato na ngai nyonso ;
bazalaki tango nyonso kotiola ngai na banzembo.
15 Atondisaki ngai na matiti ya bololo
mpe alangwisaki ngai na masanga ya bololo.
 
16 Abukaki minu na ngai na mabanga,
azindisaki ngai na putulu.
17 Nazangaki kimia,
nayebaki lisusu te nini yango bolamu.
18 Boye nalobaki : « Lokumu mpe makambo nyonso
oyo natielaki elikya na Yawe esili ! »
Yawe, elikya na ngai
19 Nakanisi pasi mpe minyoko na ngai,
ezali lokola ngenge mpe masanga ya bololo.
20 Tango nyonso nakanisaka yango,
motema na ngai ebukanaka.
21 Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka ;
oyo mpo na yango, nazalaka na elikya :
22 Bolamu ya Yawe esili te,
mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;
23 ekomaka ya sika tongo nyonso.
Solo, boyengebene na Yo ezali monene !
24 Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ;
yango wana nakotia motema epai na Ye. »
 
25 Yawe azali malamu
mpo na bato oyo batielaka Ye elikya,
mpo na bato oyo balukaka Ye !
26 Ezali malamu kozela na kimia
lobiko kowuta na Yawe !
27 Ezali malamu mpo na moto
komema ekangiseli na ye
wana azali nanu elenge.
 
28 Tika ete avanda kimia mpe avanda ye moko,
pamba te Yawe nde alingi bongo mpo na ye.
29 Tika ete atia elongi na ye na mabele :
tango mosusu elikya ekoki kozala.
30 Tika ete apesa litama
mpo ete babeta ye mbata,
mpe tika ete atonda na soni !
 
31 Pamba te Nkolo abwakaka moto te
mpo na libela.
32 Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa
mpo na bolingo monene na Ye.
33 Ezalaka na esengo te
nde Yawe ayokisaka bato soni
to atindelaka bato pasi.
 
34 Tango banyataka na makolo
bakangami nyonso ya mokili,
35 tango babebisaka lokumu ya moto
na miso ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo,
36 tango banyokolaka moto kati na kosambisama,
boni, Nkolo amonaka yango te ?
 
37 Nani akoki kaka kobimisa liloba
mpo ete likambo esalema
soki Nkolo apesi yango nzela te ?
38 Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo
nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato ?
39 Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela
tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye ?
 
40 Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso
mpe totala malamu etamboli na biso,
bongo tozonga epai na Yawe ;
41 totombola mitema mpe maboko na biso
epai ya Nzambe oyo azali na Lola mpe toloba :
42 « Tosalaki masumu mpe totombokelaki Yo,
yango wana olimbisaki te.
43 Omizipaki na kanda ndenge bamizipaka liputa,
onyokolaki biso mpe obomaki na mawa te.
44 Omizipaki lipata
mpo ete mabondeli edusola te.
45 Okomisaki biso lokola eloko ya nkele
mpe ya tina te na miso ya bikolo.
 
46 Banguna na biso nyonso bafungolaki minoko
mpo na kotiola biso ;
47 libula na biso ekomi :
somo, mabulu, kobebisama mpe kufa. »
48 Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli
mpo ete bato na ngai babebisami.
 
49 Miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli tango nyonso
mpe ezali kolemba te,
50 kino tango Yawe akotala mpe akomona
wuta kuna na Lola.
51 Makambo oyo miso na ngai ezali komona
ezali koyokisa motema na ngai pasi
likolo na bana basi nyonso ya engumba na ngai.
 
52 Bato oyo bayinaka ngai na pamba
balukaki kokanga ngai lokola ndeke ;
53 balukaki koboma ngai kati na libulu,
babwakelaki ngai mabanga ;
54 mayi etondaki kino kozipa moto na ngai
mpe nakanisaki ete nakomi pene ya kokufa.
 
55 Nabelelaki Kombo na Yo, Yawe,
wuta na mozindo ya libulu.
56 Oyokaki ngai libondeli na ngai :
« Kokanga matoyi na Yo te
wana nazali kobelela Yo
mpo ete oyoka kolela na ngai
mpe nazwa lisungi kowuta na Yo ! »
57 Tango nabelelaki Yo,
opusanaki pene na ngai
mpe olobaki : « Kobanga te ! »
 
58 Nkolo, obundelaki ngai solo,
osikolaki bomoi na ngai !
59 Yawe, omonaki mabe oyo basalaki ngai :
longisa ngai !
60 Omonaki solo posa na bango
ya kozongisa mabe na mabe
mpe mabongisi na bango ya kosala ngai mabe.
 
61 Yawe, oyokaki mafinga na bango,
mabongisi na bango ya kosala ngai mabe,
62 maloba ya bayini na ngai
mpe makanisi na bango ya kosala ngai mabe.
63 Tala mpe mona bango ! Ezala bavandi to batelemi,
mosala na bango : kotiola ngai na banzembo na bango.
 
64 Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango
kolanda misala na bango ;
65 yeisa mitema na bango makasi,
kweyisela bango bilakeli mabe na Yo ;
66 nyokola bango na kanda makasi na Yo
mpe bebisa bango na se ya Lola na Yo, Yawe !