4
Nzembo ya minei : kokakolama ya Siona
Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango,
wolo ya peto enzuluki !
Mabanga ya talo oyo ya bule epanzani
na basonge ya babalabala nyonso.
Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona,
oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto,
kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele,
oyo mosali mbeki basili kosala !
Ata mbwa ya zamba ezalaka na posa
ya komelisa bana na yango mabele ;
kasi bato na ngai bakomi mitema makasi
lokola maligbanga kati na esobe.
 
Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami
na likolo ya kati ya monoko na ye ;
bana mike bazali kosenga bilei
kasi moto moko te azali kopesa bango yango.
 
Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitoko
bakomi kokufakufa na babalabala ;
ba-oyo bakolaki na molato ya motane
bakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.
 
Lisumu oyo bato na ngai basali
ezali monene koleka lisumu ya Sodome,
engumba oyo ebebisamaki na mbala moko
wana moto moko te asembolaki loboko na ye
mpo na kotelemela yango.
 
Bana ya bakonzi na bango bazalaki
kongala koleka mvula ya pembe,
pembe koleka miliki ;
banzoto na bango ezalaki motane
koleka langi ya motane penza,
mpe lolenge na bango ezalaki
lokola libanga na safiri.
 
Bilongi na bango ekomi mwindo koleka makala,
bazali koyeba bango lisusu te na babalabala ;
poso na bango ya nzoto ekangami na mikuwa,
ekawuki lokola koni.
 
Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamu
koleka ba-oyo bakufi na nzala :
banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala,
mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga.
 
10 Basi ya mitema malamu balambi,
na maboko na bango, bana na bango moko ;
bana na bango bakomi bilei na bango
kati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.
 
11 Yawe asilikaki makasi koleka ;
asopaki kanda na Ye
mpe apelisaki moto kati na Siona,
moto oyo ezikisaki miboko na yango.
 
12 Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokili
bandimaki te ete banguna mpe bayini
bakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.
 
13 Kasi makambo wana esalemaki
mpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemi
mpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango,
oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo.
 
14 Bakomaki sik’oyo koyengayenga
na babalabala lokola bakufi miso,
bakomaki mbindo na makila
mpe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango.
 
15 Bato bazali koganga mpe koloba na bango :
« Bolongwa awa, bato ya mbindo !
Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te ! »
Wana bazalaki kokima mpe kotelengana,
bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba :
« Bavanda na esika oyo te ! »
 
16 Yawe, Ye moko, apanzi bango,
azali kotala bango lisusu te.
Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu te
mpe bayokelaki mibange mawa te.
 
17 Miso na biso elembaki lisusu
mpo na kozela na pamba lisungi ;
wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika,
tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi
kowuta na ekolo songolo mpe pakala,
kasi ebikisaki biso te.
 
18 Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso ;
boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso.
Suka na biso ekomaki pene,
mikolo na biso ekomaki ya kotanga,
mpo ete tokomaki na suka.
 
19 Bato oyo bazalaki kolanda biso
bazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo ;
bazalaki kolanda biso na likolo ya bangomba
mpe kotiela biso mitambo kati na esobe.
 
20 Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema
akangami na mitambo na bango ;
nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye :
« Tokobika bomoi malamu
na se ya bobatelami na ye
kati na bikolo. »
 
21 Edomi, mboka kitoko,
movandi ya mokili ya Utsi,
sepela, zala na esengo !
Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ;
okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.
 
22 Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ;
Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te.
Kasi yo Edomi, mboka kitoko,
Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo,
mpe akobimisa masumu na yo na polele.