8
Basi oyo bazalaki kotambola na Yesu
Sima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye, bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ; Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.
Lisese ya moloni
(Mat 13.1-9; Mlk 4.1-9)
Wana ebele ya bato bazalaki kosangana, mpe bato oyo bazalaki kowuta na bingumba bazalaki koya epai ya Ye, alobaki na bango lisese oyo :
— Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke ya likolo eliaki yango. Ndambo mosusu ekweyaki na mabele etonda na mabanga ; tango kaka ebandaki kobimisa mito, mito ekawukaki, pamba te ezalaki na mayi te. Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango. Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko.
Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki :
— Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
(Mat 13.10-13; Mlk 4.10-12)
Bayekoli ya Yesu batunaki Ye ndimbola ya lisese yango.
10 Azongiselaki bango :
— Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino ; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete,
atako bakoki kotala, bamona te ;
mpe atako bakoki koyoka, basosola te.
(Mat 13.18-23; Mlk 4.13-20)
11 Tala ndimbola ya lisese yango : Nkona ezali Liloba na Nzambe. 12 Nkona oyo ekweyaki pembeni ya nzela ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe, kasi Satana ayaka kolongola yango kati na mitema na bango mpo ete bandima te mpe babikisama te.
13 Nkona oyo ekweyaki na mabele etonda na mabanga ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi batikaka yango te kozwa misisa : bandimaka kaka mpo na mwa tango moke ; soki komekama eyei, basundolaka mbala moko kondima.
14 Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.
15 Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.
Lisese ya mwinda
(Mat 4.21-25)
16 Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango. 17 Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga kobima na pole, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana to kobima na pole.
18 Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.
Mama mpe bandeko ya Yesu
(Mat 12.46-50; Mlk 3.31-35)
19 Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele. 20 Moto moko ayebisaki Ye :
— Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.
21 Kasi Yesu azongisaki :
— Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batiaka yango na misala.
Yesu aleki mopepe na makasi
(Mat 8.23-27; Mlk 4.35-41)
22 Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.
Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki. 23 Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene. 24 Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga :
— Moteyi, Moteyi, tozali kokufa !
Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki. 25 Yesu atunaki bayekoli na Ye :
— Wapi kondima na bino ?
Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »
Yesu aleki milimo mabe na makasi
(Mat 8.28-34; Mlk 5.1-20)
26 Bakomaki na etuka ya Geraza oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale, etalana na Galile. 27 Tango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye ; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda. 28 Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka :
— Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !
29 Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko. 30 Yesu atunaki ye :
— Kombo na yo nani ?
Azongisaki :
— Ngulupa.
Pamba te milimo mabe ebele ekotaki kati na ye. 31 Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo. 32 Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu ; mpe Yesu apesaki yango nzela. 33 Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.
34 Tango bakengeli ya bangulu bamonaki likambo oyo ewuti kosalema, bakimaki mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bilanga. 35 Bato babimaki mpo na koya kotala likambo oyo esalemi. Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki mobali, oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, alata bilamba, avandi na makolo ya Yesu na mayele na ye ya kokoka ; boye somo ekangaki bango. 36 Ba-oyo bamonaki likambo oyo ewuti kosalema bayebisaki bato ndenge nini moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe akangolamaki.
37 Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki. 38 Mobali oyo akangolamaki na milimo mabe asengaki kokende elongo na Ye, kasi Yesu azongisaki ye na koloba :
39 — Zonga na libota na yo mpe tatola makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo.
Boye mobali yango akendeki mpe atatolaki na engumba mobimba, makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye.
Yesu aleki bokono mpe kufa na makasi
(Mat 9.18-26; Mlk 5.21-43)
40 Tango Yesu azongaki, ebele ya bato bayambaki Ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela Ye. 41 Mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, ayaki, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe abondelaki Ye ete akende na ndako na ye, 42 pamba te mwana na ye kaka moko ya mwasi, ya mibu pene zomi na mibale ya mbotama, akomaki pene ya kokufa. Wana Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
43 Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango. 44 Adusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye ; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga.
45 Yesu atunaki :
— Nani asimbi Ngai ?
Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu :
— Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
46 Kasi Yesu alobaki :
— Moto moko asimbi Ngai ; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.
47 Awa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye. 48 Kasi Yesu alobaki na ye :
— Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.
49 Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki :
— Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.
50 Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi :
— Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.
51 Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana. 52 Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki :
— Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !
53 Bato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa. 54 Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki :
— Mwana na Ngai, lamuka !
55 Pema ya bomoi ezongaki kati na mwana ; mpe mbala moko, atelemaki. Bongo Yesu atindaki bango kopesa ye eloko ya kolia. 56 Baboti na ye bakamwaki, kasi Yesu apekisaki bango koloba na moto ata moko te likambo oyo ewuti kosalema.