9
Yesu atindi bayekoli na Ye zomi na mibale
(Mat 10.1-9, 11-14; Mlk 6.7-13)
Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono ; mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli. Alobaki na bango :
— Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo ; bozala na banzambala mibale te na moto. Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba. Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.
Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.
Erode amitungisi
(Mat 14.1-2; Mlk 6.14-16)
Erode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka ; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba : « Yoane asekwi, » bamosusu : « Eliya abimi, » mpe bamosusu lisusu : « Moko kati na basakoli ya kala asekwi. »
Kasi Erode azalaki komilobela : « Ngai nde nakataki Yoane moto ; bongo moto oyo nazali koyoka makambo minene boye na tina na ye, azali penza nani ? »
Boye alukaki kokutana na Yesu.
Yesu aleisi mibali nkoto mitano
(Mat 14.13-21; Mlk 6.33-44; Yn 6.1-15)
10 Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko. 11 Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto.
12 Awa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye :
— Zongisa bato oyo mpo ete bakende komilukela bilei mpe bisika ya kolala, kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga, pamba te tozali awa kati na esika ebombama.
13 Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
Bazongisaki :
— Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.
14 Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Bovandisa bango na masanga ; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano.
15 Bayekoli basalaki bongo, mpe bato nyonso avandaki. 16 Yesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango ; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato. 17 Bato nyonso baliaki mpe batondaki ; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
Petelo atatoli mpo na Yesu
(Mat 16.13-21; Mlk 8.27-31; Yn 6.67-71)
18 Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango :
— Bato bazali koloba nini na tina na Ngai ? Mpo na bango, Ngai nazali nani ?
19 Bazongisaki :
— Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.
20 Yesu atunaki bango lisusu :
— Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?
Petelo azongisaki :
— Ozali Masiya oyo Nzambe atindi.
21 Yesu apesaki bango mitindo ete bameka koloba bongo te ata na moto moko.
22 Mpe alobaki :
— Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
Ndenge nini kolanda Yesu
(Mat 16.24-28; Mlk 8.34–9.1)
23 Bongo Yesu alobaki na bango nyonso :
— Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai. 24 Pamba te, moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akobikisa yango. 25 Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi amibungisi to abebisi bomoi na ye ? 26 Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule. 27 Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.
Nzoto ya Yesu ebongwani
(Mat 17.1-9; Mlk 9.2-10)
28 Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.
29 Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali. 30 Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu : Moyize mpe Eliya 31 oyo babimaki kati na kongenga ya nkembo ; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi.
32 Petelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye.
33 Wana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki :
— Moteyi, eleki malamu mpo na biso kozala awa ! Totonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.
Solo, Petelo ayebaki te makambo oyo azalaki koloba. 34 Wana azalaki nanu koloba bongo, lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Somo ekangaki bayekoli, wana bakotaki kati na lipata yango.
35 Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki :
— Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona ; boyoka Ye !
36 Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.
Molimo mabe kati na mwana moko
(Mat 17.14-21; Mlk 9.14-29)
37 Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu. 38 Mobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki :
— Moteyi, nazali kosenga na Yo ete otala mwana na ngai ya mobali, pamba te nazali kaka na mwana moko ! 39 Molimo moko etungisaka ye : soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele ; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye. 40 Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
41 Yesu alobaki :
— Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko ? Mema mwana na yo awa.
42 Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye. 43 Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe.
Yesu asakoli kufa na Ye
(Mat 17.22-23; Mlk 9.30-32)
Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye :
44 — Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.
45 Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.
Nani aleki monene ?
(Mat 18.1-5; Mlk 9.33-37)
46 Tembe moko ebimaki kati na bayekoli ; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango. 47 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye, 48 mpe alobaki na bango :
— Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.
(Mlk 9.38-41)
49 Yoane alobaki :
— Moteyi, tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe tomekaki kopekisa ye, pamba te azali moto ya lisanga na biso te.
50 Yesu alobaki :
— Bopekisa ye te, pamba te moto nyonso oyo atelemelaka bino te azali mpo na bino.
Kokende ya Yesu na Yelusalemi
Baboyi koyamba Yesu na Samari
51 Lokola tango oyo Yesu asengeli komemama na Likolo ekomaki pene, Yesu azwaki mokano ya kokende na Yelusalemi. 52 Atindaki bantoma liboso na Ye ; boye wana bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya bato ya Samari mpo na kobongisela Ye biloko. 53 Kasi bato ya Samari baboyaki koyamba Ye, mpo ete azalaki kokende na Yelusalemi. 54 Tango bayekoli, Jake mpe Yoane, bamonaki bongo, balobaki :
— Nkolo, olingi ete tobelela moto ete ekitela bango kowuta na likolo mpo na kobebisa bango ?
55 Yesu abalukaki mpo na kotala bango malamu mpe apamelaki bango :
[— Boni, boyebi molimo oyo ezali kotindika bino na makanisi ya boye ? Mwana na Moto ayaki te mpo na koboma bato, kasi mpo na kobikisa bango.]*Makomi oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.
56 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu.
Ndenge nini kolanda Yesu
(Mat 8.18-22)
57 Wana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu :
— Nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
58 Yesu azongiselaki ye :
— Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
59 Yesu alobaki na mobali mosusu :
— Landa Ngai.
Kasi mobali yango azongiselaki Ye :
— Nkolo, pesa ngai nzela ya kokende nanu kokunda tata na ngai.
60 Yesu alobaki na ye :
— Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.
61 Mosusu lisusu alobaki na Ye :
— Nkolo, nakolanda Yo ; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka.
62 Yesu azongiselaki ye :
— Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.

*9:55 Makomi oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.