4
Lisese ya moloni
(Mat 13.1-15; Lk 8.4-10)
Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale. Azalaki koteya bango makambo ebele na masese. Na mateya na Ye, azalaki koloba : « Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango. Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te ; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te. Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te. Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te. Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu ; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma nkama moko. » Yesu azalaki lisusu koloba : « Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! »
10 Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese. 11 Yesu alobaki na bango :
— Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe ; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese ; 12  mpo ete :
atako bakoki kotala, bamona eloko te ;
mpe atako bakoki koyoka, basosola eloko te ;
noki te bakobongola mitema,
mpe masumu na bango ekolimbisama.
13 Bongo Yesu alobaki na bango :
— Boni, bososoli lisese oyo te ? Ndenge nini bokososola masese mosusu ?
(Mat 13.18-23; Lk 8.11-15)
14  Moloni alonaka Liloba. 15  Bato mosusu bazali pembeni ya nzela epai wapi Liloba elonami. Tango kaka bayoki Liloba, Satana ayei mpe alongoli Liloba oyo elonami kati na mitema na bango. 16  Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga : bayoki na bango Liloba mpe bayambi yango mbala moko na esengo ; 17  kasi lokola bazali na misisa te kati na bango, bakowumela na Liloba yango kaka mpo na tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko eyei, basundoli mbala moko kondima na bango. 18  Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi kati na banzube : bayoki na bango Liloba ; 19  kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango. 20  Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu : bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma ; moko aboti bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko.
Lisese ya mwinda
(Lk 8.16-18)
21 Yesu alobaki na bango lisusu :
— Boni, bamemaka solo mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ? Ezali te mpo na kotia yango na likolo ya etelemiselo ya minda ? 22  Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga kobima na pole. 23  Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
24 Alobaki lisusu :
— Bosala keba na makambo oyo bozali koyoka ! Bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu, mpe bakobakisa kutu lisusu koleka ; 25  pamba te na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
Lisese ya mbuma oyo ekoli yango moko
26 Yesu alobaki lisusu :
— Bokonzi ya Nzambe ekokani na moto oyo abwaki nkona na mabele : 27  butu mpe moyi, alala to alamuka, nkona ebimisaka moto, ekolaka yango moko mpe ayebaka te ndenge nini yango ezali kokola ; 28  pamba te yango moko mabele nde ebimisaka mbuma : liboso, moto ya nzete ; sima, matiti ; mpe na suka, bambuma ya ble etondaka na nzete. 29  Bongo soki bambuma ekomeli, azwaka mbala moko mbeli oyo bakataka na yango matiti ya ble, pamba te eleko ya kobuka bambuma ekoki.
Lisese ya mbuma ya mutarde
(Mat 13.31-32; Lk 13.18-19)
30 Yesu alobaki lisusu :
— Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Tokoki kosalela lisese nini mpo na kokokanisa yango ? 31  Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili. 32  Kasi sima na kolona yango, ekokola mpe ekomaka molayi koleka ndunda nyonso ya elanga, ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na se ya pio na yango.
33 Yesu azalaki kosalela masese ya ndenge na ndenge mpo na koteya bango Liloba na Nzambe, kolanda bososoli na bango ; 34 azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.
Yesu aleki mopepe na makasi
(Mat 8.23-27; Lk 8.22-25)
35 Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.
36 Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango. 37 Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi. 38 Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse.
Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga :
— Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ?
39 Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :
— Tika makelele ! Vanda nye !
Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
40 Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
— Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?
41 Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »