5
Yesu aleki milimo mabe na makasi
(Mat 8.28-34; Lk 8.26-39)
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza, Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye. Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo ; pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango ; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye. Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.
Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye mpe agangaki na makasi nyonso :
— Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !
Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »
Yesu atunaki ye :
— Kombo na yo nani ?
Azongisaki :
— Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele !
10 Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana. 11 Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.
12 Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »
13 Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.
14 Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga ; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema. 15 Tango bakomaki epai na Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya ngulupa ya milimo mabe avandi wana, alata bilamba na mayele na ye ya kokoka. Boye somo ekangaki bango. 16 Bato oyo bamonaki ndenge likambo yango esalemaki bayebisaki bato mosusu makambo oyo ekomelaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe mpe oyo ekomelaki bangulu. 17 Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango.
18 Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe asengaki na Ye ete bakende na Ye nzela moko.
19 Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye : « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo ; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »
20 Moto yango akendeki mpe abandaki kopanza sango ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, kati na Dekapoli ; mpe bato nyonso bakamwaki.
Yesu aleki bokono mpe kufa na makasi
(Mat 9.18-26; Lk 8.40-56)
21 Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale ; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.
22 Jairisi, moko kati na bakambi ya ndako ya mayangani, ayaki wana ; tango kaka amonaki Yesu, amibwakaki na makolo na Ye 23 mpe abondelaki Ye makasi : « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa ! Nabondeli yo : yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. »
24 Boye Yesu akendeki na ye nzela moko ; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso. 25 Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. 26 Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te ; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata. 27 Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye, 28 pamba te azalaki komilobela : « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika ! »
29 Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye.
30 Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki :
— Nani asimbi Ngai na bilamba ?
31 Bayekoli na Ye bazongisaki :
— Ozali komona malamu ete bato bazali kotutana-tutana na Yo na bangambo nyonso, mpe ozali kotuna lisusu : « Nani asimbi Ngai ? »
32 Kasi Yesu akomaki kotala epai ya ebele ya bato mpo na koluka koyeba nani oyo asali bongo. 33 Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso.
34 Yesu alobaki na ye :
— Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !
35 Wana Yesu azalaki nanu koloba, ndambo ya bato bayaki longwa na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani mpo na koloba na ye :
— Mwana na yo ya mwasi asili kokufa ; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi ?
36 Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani :
— Kobanga te, zala kaka na kondima !
37 Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake. 38 Tango bakomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yikiyiki kati na bato oyo bazalaki kolela mpe koganga makasi.
39 Akotaki mpe alobaki na bango :
— Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso ? Mpo na nini bozali kolela ? Mwana akufi te ; alali nde pongi !
40 Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki. 41 Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye : « Talita kumi ! » Elingi koloba : Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema !
42 Mbala moko, elenge mwasi atelemaki mpe akomaki kotambola. Azalaki na mibu pene zomi na mibale. Bato nyonso bakamwaki makasi penza. 43 Yesu apekisaki bango koloba likambo yango ata na moto moko ; mpe ayebisaki bango ete bapesa elenge mwasi yango bilei.