9
Yesu alobaki na bango lisusu :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.
Yesu abongwani
(Mat 17.1-9; Lk 9.28-36)
Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango : bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi ; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana. Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu. Petelo alobaki na Yesu :
— Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Tokotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.
Solo, Petelo azalaki kososola te makambo oyo azalaki koloba, pamba te bango misato batondaki na kobanga. Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango :
— Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye !
Mbala moko, bayekoli batalaki zingazinga na bango mpe bamonaki moto mosusu te elongo na bango, kaka Yesu.
Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi. 10 Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana :
— Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini ?
(Mat 17.10-13)
11 Bayekoli batunaki Yesu :
— Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ?
12 Yesu azongiselaki bango :
— Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye ? 13  Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya ayaki mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kolanda ndenge ekomama na tina na ye.
Yesu abikisi mwana oyo azalaki na molimo mabe
(Mat 17.14-21; Lk 9.37-43)
14 Tango bakomaki pene ya esika oyo bayekoli mosusu bazalaki, bamonaki ebele ya bato penza bazingeli bango, mpe balakisi ya Mobeko kotiana tembe elongo na bayekoli. 15 Tango kaka bato yango bamonaki Yesu, bakamwaki mingi mpe bapotaki mbangu mpo na kokutana na Ye mpe kopesa Ye mbote.
16 Yesu atunaki bango :
— Likambo nini bozali kotiana na yango tembe elongo na bayekoli ?
17 Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye :
— Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo ; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te. 18 Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
19 Yesu alobaki na bango :
— Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
20 Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko.
21 Yesu atunaki tata ya mwana :
— Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye ?
Tata ya mwana azongisaki :
— Wuta tango azalaki mwana moke penza. 22 Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.
23 Yesu alobaki na ye :
— Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
24 Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi :
— Nandimi ! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima.
25 Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe :
— Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.
26 Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi ! »
27 Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye ; mpe mwana atelemaki.
28 Yesu akotaki na ndako ; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye :
— Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ?
29 Yesu azongisaki :
— Babenganaka molimo ya ndenge wana kaka na losambo* Mikanda mosusu ya kala ebakisa : mpe kokila bilei..
Yesu alobeli kufa mpe lisekwa na Ye
(Mat 17.22-23; Lk 9.43-45)
30 Tango balongwaki na esika wana, bakatisaki na mokili ya Galile mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika oyo bazali, 31 pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango :
— Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa.
32 Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.
Nani aleki monene ?
(Mat 18.1-5; Lk 9.46-48)
33 Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango :
— Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela ?
34 Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
35 Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango :
— Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.
36 Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango :
37  — Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
(Lk 9.49-50)
38 Yoane alobaki :
— Moteyi, tomonaki moto moko azali kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe topekisaki ye, pamba te azali elongo na biso te.
39 Kasi Yesu azongisaki :
— Bopekisa ye te ; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai. 40  Moto oyo atelemeli biso te azali mpo na biso. 41  Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
42  Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
43  Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te, [ 44  epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.] Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala. 45  Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na lokolo moko, na esika ete otikala na makolo mibale mpe obwakama na lifelo [ 46  epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.] Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala. 47  Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo 48  epai wapi
nkusu ekufaka te,
mpe moto ekufaka te.
(Mat 5.13; Lk 14.34-35)
49  Pamba te moto na moto akoleka na moto mpo ete akoma elengi lokola mungwa. 50  Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.

*9:29 Mikanda mosusu ya kala ebakisa : mpe kokila bilei.

9:44 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.

9:46 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.