Lotomo ya Yesu kati na Yuda mpe Yelusalemi
10
Mateya na tina na koboma libala
(Mat 19.1-12)
Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye ; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye.
Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye :
— Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala ?
Yesu azongiselaki bango :
— Moyize apesaki bino mobeko nini ?
Balobaki na Yesu :
— Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.
Bongo Yesu alobaki na bango :
— Moyize akomaki mobeko wana mpo na bino, pamba te mitema na bino ezali mabanga. Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. » Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.
10 Tango bazongaki na ndako, bayekoli batunaki lisusu Yesu na tina na likambo yango. 11 Yesu alobaki na bango :
— Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo liboso ya mwasi na ye ya liboso. 12  Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.
Yesu ayambi bana mike
(Mat 19.13-15; Lk 18.15-17)
13 Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango.
14 Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli :
— Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango. 15  Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
16 Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe
(Mat 19.16-30; Lk 18.18-30)
17 Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki :
— Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
18 Yesu azongisaki :
— Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe. 19  Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
20 Moto yango alobaki lisusu :
— Moteyi, natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai !
21 Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye :
— Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
22 Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
23 Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango :
— Ezali pasi mpo na bazwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !
24 Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu :
— Solo, bana na Ngai, ezali pasi* Mikanda mosusu ya kala ebakisaka : « na ba-oyo batiaka mitema na bango mobimba na bomengo. »mpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! 25  Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
26 Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana :
— Bongo nani penza akoki kobikisama ?
27 Yesu atalaki bango mpe alobaki :
— Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, ekosalema penza ; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.
28 Petelo alobaki na Yesu :
— Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo !
29 Yesu azongisaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye to bilanga na ye, mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu, 30  akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko. 31  Kasi kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Yesu alobi lisusu na tina na kufa mpe lisekwa na Ye
(Mat 20.17-19; Lk 18.31-34)
32 Wana bazalaki na nzela mpo na komata na Yelusalemi, Yesu azalaki kotambola liboso na bango. Bayekoli bazalaki na mawa, mpe bato mosusu oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga.
Yesu abendaki lisusu na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe ayebisaki bango makambo oyo esengeli kokomela Ye :
33  — Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano, 34  bakoseka Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; kasi, sima na mikolo misato, akosekwa.
Jake mpe Yoane basengi esika ya lokumu
(Mat 20.20-28; Lk 22.25-27)
35 Bongo Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye :
— Moteyi, tolingi ete osalela biso likambo oyo tokosenga Yo.
36 Yesu atunaki bango :
— Bolingi ete nasalela bino nini ?
37 Bazongisaki :
— Pesa biso nzela ya kovanda kati na nkembo na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
38 Yesu alobaki na bango :
— Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela to kozwa libatisi oyo Ngai nakozwa ?
39 Bazongisaki :
— Iyo, tokoki !
Yesu alobaki na bango :
— Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela mpe bokozwa na bino libatisi oyo Ngai nakozwa ; 40  kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
41 Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki Jake mpe Yoane. 42 Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango :
— Boyebi malamu ete bato oyo bamonanaka lokola bakonzi bakonzaka bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango. 43  Esengeli te kozala bongo kati na bino ; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ; 44  mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu ya bino nyonso ! 45  Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
Yesu abikisi Bartime, mokufi miso
46 Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga. 47 Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga :
— Yesu, mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
48 Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi :
— Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
49 Yesu atelemaki mpe alobaki :
— Bobenga ye !
Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye :
— Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo !
50 Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu. 51 Yesu alobaki na ye :
— Olingi nasala nini mpo na yo ?
Mokufi miso azongisaki :
— Moteyi, nalingi komona.
52 Yesu alobaki na ye :
— Kende, kondima na yo ebikisi yo.
Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.

*10:24 Mikanda mosusu ya kala ebakisaka : « na ba-oyo batiaka mitema na bango mobimba na bomengo. »