23
Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya liboso
Balami alobaki na Balaki : « Tongela ngai bitumbelo sambo awa mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. »
Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe bango mibale babonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko. Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. »
Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti. Nzambe akutanaki na Balami, mpe Balami alobaki :
— Nabongisaki bitumbelo sambo ; mpe na etumbelo moko na moko, nasili kobonza ngombe ya mobali mpe meme ya mobali moko.
Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki :
— Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
Bongo Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo :
« Balaki abengisaki ngai wuta na Arami,
mokonzi ya Moabi abengisaki ngai
wuta na bangomba ya este.
Alobaki : ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai ;
yaka, loba mabe mpo na Isalaele.
Ndenge nini nakoki solo kolakela mabe
bato oyo Nzambe alakela mabe te ?
Ndenge nini nakoki solo koloba mabe
mpo na bato oyo Yawe alobela mabe te ?
Tala, wuta na likolo ya mabanga,
nazali komona bango ;
wuta na likolo ya bangomba,
nazali kotala bango.
Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko,
bazali komitanga na molongo ya bikolo te.
10 Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi
to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ?
Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo,
mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › »
11 Balaki alobaki na Balami :
— Likambo nini osali ngai ? Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe ; kasi tala, opamboli bango koleka.
12 Balami azongisaki :
— Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai ?
Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya mibale
13 Balaki alobaki na Balami :
— Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai.
14 Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.
15 Balami alobaki na Balaki :
— Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye.
16 Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki :
— Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
17 Bongo, Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Balaki atunaki ye :
— Yawe alobi nini ?
18 Bongo Balami akomaki koloba maloba oyo :
« Balaki, telema mpe yoka !
Mwana mobali ya Tsipori, yoka ngai malamu !
19 Nzambe azali moto te mpo ete akosa,
azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye.
Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ?
Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?
20 Nazwaki nde mokumba ya kopambola.
Asila kopambola, mpe ngai nakokoka kobongola te.
 
21 Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi,
amonaka minyoko te kati na Isalaele.
Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango ;
koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango.
22 Nzambe abimisaki bango na Ejipito ;
bazalaka makasi lokola mpakasa.
23 Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi,
mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele.
Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele :
‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! ›
24 Bato oyo batelemi lokola nkosi ya mwasi ;
epemaka te soki epasoli te mosuni na yango
mpe emeli te makila ya nyama oyo ekangi. »
25 Bongo Balaki alobaki na Balami :
— Ezala soki okoki te kolakela bango mabe, kasi kopambola bango te.
26 Balami azongiselaki Balaki :
— Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ?
Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya misato
27 Balaki alobaki na Balami :
— Yaka, tika ete namema yo esika mosusu ! Tango mosusu Nzambe akosepela ete olakela bango mabe mpo na ngai wuta na esika yango.
28 Balaki amemaki Balami na likolo ya ngomba Peori, esika oyo emonisaka esobe mobimba.
29 Balami alobaki na Balaki :
— Tongela ngai bitumbelo sambo mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. 30 Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe abonzaki ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali na etumbelo moko na moko.