24
Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe. Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye ; mpe akomaki koloba maloba oyo :
« Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori,
maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,
maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe,
oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :
‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko,
mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele !
 
Epanzana lokola miluka ya mike-mike,
lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale,
lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona,
lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi.
Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango,
bankona na bango ekozwa mayi ebele.
 
Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi,
bokonzi na bango ekozala ya lokumu.
 
Nzambe abimisaki bango na Ejipito,
bazalaka makasi lokola mpakasa,
babebisaka bikolo oyo ebundisaka bango
mpe babukaka mikuwa na bango na biteni-biteni,
batobolaka yango na makonga na bango.
Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali,
lokola nkosi ya mwasi ;
nani akokoka kotelemisa bango ?
 
Tika ete oyo akopambola yo apambolama,
mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › »
10 Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki :
— Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato. 11 Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo ! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango.
12 Balami azongiselaki Balaki :
— Boni, nalobaki te na bantoma oyo otindelaki ngai ete 13 « Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. » 14 Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai ; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya.
Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya minei
15 Bongo Balami alobaki maloba oyo :
« Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori,
maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,
16 oyo ayokaka maloba na Nzambe,
oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo,
oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka :
17 ‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ;
natali ye, kasi na pembeni te.
Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi,
mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele.
Akotobola mito ya bato ya Moabi
mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.
18 Bakobotola mokili ya Edomi,
bakobotola Seiri, monguna na ye,
kasi Isalaele akokoma lisusu makasi koleka.
19 Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi,
mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › »
Maloba ya suka ya Balami
20 Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo :
« Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo,
kasi ekosuka na libebi. »
21 Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo :
« Esika na yo ya kovanda ezali makasi,
zala na yo ezalaka kati na mabanga ;
22 kasi bino bato ya Keni, bokobebisama
tango Ashuri akozwa bino lokola bakangami. »
23 Mpe na suka, alobaki maloba oyo :
« Oh mawa ! Nani akoki kozala na bomoi,
wana Nzambe akozala kosala makambo ya boye ?
24 Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi,
bakonyokola Ashuri mpe Eberi,
kasi bango moko mpe bakobebisama. »
25 Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye.