25
Bana ya Isalaele bapengwi na etando ya Moabi
Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi. Mpe, bilenge basi yango bazalaki kobenga bango na milulu ya mbeka oyo babonzelaka banzambe na bango. Mpe bana ya Isalaele bazalaki kolia mpe kogumbamela banzambe yango. Bongo, bana ya Isalaele bamipesaki na kosambela Bala ya Peori mpe, kanda ya Yawe epelaki makasi mpo na bango.
Yawe alobaki na Moyize : « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. »
Moyize alobaki na bakambi ya Isalaele : « Tika ete moko na moko kati na bino aboma bato na ye oyo bamipesi na kosambela nzambe Bala ya Peori. »
Bongo moto moko ya Isalaele amemaki na libota na ye mwasi moko ya ekolo ya Madiani liboso ya Moyize mpe ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele, wana bazalaki kolela na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Tango Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron amonaki bongo, abimaki kati na lisanga mpe akamataki mopanga ; alandaki moto ya Isalaele wana kino kati na ndako na ye ya kapo mpe atobolaki bango mibale mabumu mpe bakufaki, ezala moto ya Isalaele wana mpe mwasi wana. Mpe etumbu oyo ezalaki likolo ya Isalaele esilaki. Bato oyo bakufaki na etumbu wana bazalaki, bato nkoto tuku mibale na minei.
10 Yawe alobaki na Moyize : 11 « Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, asili kolongola kanda na Ngai likolo ya bana ya Isalaele, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu na Ngai kati na bango ; yango wana, na kanda na Ngai ya makasi, nasilisaki koboma bana ya Isalaele te. 12 Na boye, yebisa ye ete nasili kosala boyokani ya kimia elongo na ye. 13 Boyokani yango ekozala mpo na ye mpe mpo na bakitani na ye, mpo ete basala mosala na Ngai ya Bonganga-Nzambe mpo na libela, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu ya Nzambe na ye, mpe asali mosala ya bolimbisi masumu mpo na bana ya Isalaele. »
14 Kombo ya moto ya Isalaele oyo babomaki elongo na mwasi ya Madiani ezalaki Zimiri, mwana mobali ya Salu, mokambi ya libota ya Simeoni ; 15 mpe oyo ya mwasi ya Madiani ezalaki Kozibi, mwana mwasi ya Tsuri, mokambi ya libota moko ya ekolo ya Madiani.
16 Yawe alobaki na Moyize : 17 « Kamata bato ya Madiani lokola banguna mpe boma bango, 18 pamba te bakamataki bino lokola banguna mpe basalelaki mayele mabe mpo na kokweyisa bino, na likambo ya Peori mpe ya ndeko na bango ya mwasi, Kozibi, mwana mwasi ya moko kati na bakambi ya Madiani, oyo babomaki na tango ya etumbu kati na likambo ya Peori. »
Mabongisi mpo na kokota na mboka ya elaka
Moyize mpe Eleazari batangi motango ya bato
19 Sima na etumbu wana,