34
Bandelo ya Kanana, mboka ya elaka
Yawe alobaki na Moyize : « Pesa mitindo oyo na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na Kanana, tala mokili oyo ekopesamela bino lokola libula, mokili ya Kanana elongo na bandelo na yango oyo :
 
Na ngambo ya sude, mondelo na bino ekobanda na esobe ya Tsini mpe ekolanda mondelo ya mokili ya Edomi. Na ngambo ya este, mondelo na bino ya sude ekobanda na ebale monene ya Barozo, ekokita na sude ya ebandeli ya ngomba Akarabimi mpe ekoleka na Tsini kino na sude ya Kadeshi-Barinea ; ekokoba na Atsari-Adari mpe ekoleka na Atsimoni. Longwa na Atsimoni, ekoleka na mayi ya lubwaku ya Ejipito mpo na kosuka na ebale monene.
Mondelo na bino ya ngambo ya weste ekozala ebale monene Mediterane.
Na ngambo ya nor, mondelo na bino ekobanda na ebale monene Mediterane kino na ngomba Ori. Longwa na ngomba Ori, bokolekisa yango na Lebo-Amati mpo na kosuka na Tsedadi. Longwa na Tsedadi, ekoleka na Zifironi mpe ekokoma na Atsari-Enani. Yango nde ekozala mondelo na bino ya ngambo ya nor.
10 Na ngambo ya este, mondelo na bino ekobanda na Atsari-Enani kino na Shefami ; 11 longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este, 12 kino na Yordani mpo na kosuka na ebale monene ya Barozo.
 
Ezali ndenge wana nde mokili na bino ekozala elongo na bandelo oyo ezingeli yango. › »
Moyize apesi mitindo ya sika mpo na kokabola mokili
13 Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo. 14 Pamba te ndako na ndako ya libota ya Ribeni mpe ndako na ndako ya libota ya Gadi elongo na ndambo ya libota ya Manase esilaki kozwa libula na yango. 15 Mabota oyo mibale na ndambo ezwaki libula na yango na ngambo ya este ya Yordani, oyo etalana na Jeriko. »
Yawe aponi bato mpo na kokabola mokili
16 Yawe alobaki lisusu na Moyize : 17 « Tala bato oyo bakokabola mokili kati na bino : Nganga-Nzambe Eleazari mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni. 18 Bokozwa lisusu mokambi moko kati na libota moko na moko mpo na kokabola mokili.
 
19 Tala bakombo na bango :
 
Mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;
20 mpo na libota ya Simeoni : Samuele, mwana mobali ya Amiwudi ;
21 mpo na libota ya Benjame : Elidadi, mwana mobali ya Kisiloni ;
22 mpo na libota ya Dani : mokambi Buki, mwana mobali ya Yogili ;
23 mpo na bana ya Jozefi, libota ya Manase : mokambi Anieli, mwana mobali ya Efodi ;
24 libota ya Efrayimi : mokambi Kemweli, mwana mobali ya Shifitani ;
25 mpo na libota ya Zabuloni : mokambi Elitsafani, mwana mobali ya Parinaki ;
26 mpo na libota ya Isakari : mokambi Palitieli, mwana mobali ya Azani ;
27 mpo na libota ya Aseri : mokambi Ayiwudi, mwana mobali ya Shelomi ;
28 mpo na libota ya Nefitali : mokambi Padeyeli, mwana mobali ya Amiwudi. »
 
29 Bango wana nde bato oyo Yawe apesaki mokumba ya kokabola mokili ya Kanana kati na bana ya Isalaele.